ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 1
Isai | LinVB | 1:1 | Yoka makambo ma Yuda mpe ma Yeruzalem, maye Izaya, mwana wa Amos, amonoki o limoni o eleko ya Ozia, Yotam, Akaz na Ezekia, bakonzi ba Yuda. | |
Isai | LinVB | 1:2 | Yo likolo, yoka ; yo nse, fongola matoi, mpo Yawe akoloba boye : Naboti bana mpe nabokoli bango, kasi batombokeli ngai. | |
Isai | LinVB | 1:3 | Ngombe eyebi nkolo wa yango, mpunda eyebi esika nkolo akopesaka yango bilei. Kasi Israel ayebi ngai te, bato ba ekolo ya ngai bazali na mayele te. | |
Isai | LinVB | 1:4 | Mawa na bino, bato ba masumu, ekolo ya bato babe, libota lya bato bakosalaka mabe, bato babeba ! Botiki Yawe, botioli Mosantu wa Israel, bopesi ye mokongo. | |
Isai | LinVB | 1:5 | Bolingi nabete bino lisusu, awa bokobi kotomboko ? Bozali kobele mitó, mitema mya bino milembi nye. | |
Isai | LinVB | 1:6 | Banda nse ya makolo tee motó, nzoto mobimba ebebi : bobele matutu na mpota izali kofungwana, basukoli to bakangi yango te, basopeli yango mafuta mpe te. | |
Isai | LinVB | 1:7 | Mokili mwa bino mokomi mopotu, bingumba bya bino biziki na móto ; o miso ma bino bauta bayibi mbuma ya bilanga bya bino ; binso bibebi. | |
Isai | LinVB | 1:8 | Mawa na mwasi ya Sion okomi molako o elanga ya vino, lokola ndako ya mokengeli o elanga ya mbika, lokola engumba ezingami na banguna. | |
Isai | LinVB | 1:9 | Soko Yawe wa bokasi bonso abikisaki mwa ndambo ya bato te, mbele tosilaki lokola Sodoma, mbele tokomaki lokola Gomora. | |
Isai | LinVB | 1:10 | Bino bakonzi ba Sodoma, boyoka liloba lya Yawe, bino bato ba Gomora, bofongola matoi na mateya ma Nzambe wa biso ! | |
Isai | LinVB | 1:11 | Yawe alobi : Nasala nini na mabonza ma bino ebele ? Nalembi na mabonza ma kotumba ma mpata babali mpe na mafuta ma bana ngombe. Nazali kosepela lisusu te na makila ma ngombe babali, ma bana mpata mpe ma ntaba babali. | |
Isai | LinVB | 1:12 | Nani abyangi bino mpo bonyata lopango la ngai, ntango boyei mpo ya komilakisa o miso ma ngai ? | |
Isai | LinVB | 1:13 | Botika koyela ngai mabonza ma mpamba, naboyi ata nsolo ya mango. Sanza ya sika, mikolo mya Sabato, makita… Naboyi biyenga bya bato bazangi bosembo. | |
Isai | LinVB | 1:14 | Nayini sanza ya sika na biyenga bya bino, bikomeli ngai mokumba moye nalingi komeme lisusu te. | |
Isai | LinVB | 1:15 | Ntango botomboli maboko, nakozipa miso. Ata bosambeli mingi, nakoyoka te, mpamba te, maboko ma bino matondi na makila. | |
Isai | LinVB | 1:17 | Boyekola kosala malamu, boluka bosembo. Bosalisa baye banyokwami, bobatela mwana etike, bolongisa mwasi bozenge. | |
Isai | LinVB | 1:18 | Yawe alobi : Boya mpo tosamba ! Ata masumu ma bino mazali motane lokola makila, makokoma peto lokola mbula ya mpembe, ata mazali motane lokola ngola, makokoma kitoko lokola nsuki ya mpata. | |
Isai | LinVB | 1:21 | Boniboni mboka ya botosi ekomi lokola mwasi ndumba ? Mboka eye esantu mpe ya bosembo ekomi kotonda na babomi. | |
Isai | LinVB | 1:23 | Bankumu ba bino batomboki, bayokani na bayibi. Banso balingi ’te bato bapesa bango makabo, bakowelaka mabonza. Bakolongisaka bana bitike te, bakoboyaka koyoka basi bazenge. | |
Isai | LinVB | 1:24 | Yango wana, ngai Yawe Nzambe wa bokasi bonso, ngai, Nguya ya Israel, nalobi boye : Nakozongisela banguna mabe basalaki, nakobekola banguna ba ngai. | |
Isai | LinVB | 1:25 | Loboko la ngai lokobete yo. Nakopetola yo na nkisi lokola bakopetolaka bibende, nakolongola bosoto bwa yo bonso. | |
Isai | LinVB | 1:26 | Nakosala ’te bazuzi ba yo bakoma lokola baye ba kala, balaki ba yo bakoma mpe lokola baye ba kala. Na nsima bakobyanga yo ‘Engumba ya bosembo’, mpe ‘Engumba ya lobokó’. | |
Isai | LinVB | 1:27 | Sion akobika na bosambisi ye, baye na kati ya Sion bakobongwana mitema bakobika mpo ya bosembo. | |
Isai | LinVB | 1:29 | O ntango ena bokoyoka nsoni na gbukulu iye bokolingaka, mpe na bilanga bya ndunda bikosepelisaka bino. | |