Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JEREMIAH
Prev Up Next
Chapter 40
Jere LinVB 40:1  Yawe alobi na Yeremia o ntango Nebuzaradan, komanda wa bakengeli, alongolaki ye o Rama, zambi akutaki ye na mi­nyololo o maboko o kati ya bato ba Yeruzalem mpe ba Yuda, baye bakangemaki wana mpo ’te bakende o boombo o Babilon.
Jere LinVB 40:2  Komanda wa bakengeli abengi Yeremia mpe alobi na ye : « Yawe Nzambe wa yo asili ayebisi ’te mpa­si eye ekokwela ekolo eye ;
Jere LinVB 40:3  sikawa akokisi maye alobaki. Mpasi ekweli bino zambi bosalaki Yawe mabe mpe boyokaki ye te.
Jere LinVB 40:4  Sikawa nakolongola minyololo mya yo. Soko olingi kokende elongo na ngai o Babilon, yaka, ngai nakobatela yo. Soko olingi kokende na ngai kuna te, tikala awa. O mokili mobimba okoki kokende epai olingi. »
Jere LinVB 40:5  Awa Yeremia akei naino te, abakisi : « Soko olingi kotikala epai ya ngai te, zonga epai ya Godolia, mwana wa Akikam, nkoko wa Safan, oyo mokonzi wa Babilon atii moyangeli wa bingumba bya Yuda ; okoki kotikala epai ya ye o ntei ya bato ba yo to kokende epai olingi. » Nsima komanda wa bakengeli apesi ye biloko bya kolia mpe mabonza, mpe alingisi ye ’te akende.
Jere LinVB 40:6  Yeremia akei o Mispa epai ya Godolia, mwana wa Akikam ; afandi epai ya ye o ntei ya bato batikalaki o mokili.
Jere LinVB 40:7  Bakomanda banso ba basoda batikali o esobe na bato ba bango bayoki ’te mokonzi wa Babilon atiaki Godolia, mwana wa Akikam, moyangeli wa ekolo, apesaki ye mpe bokonzi bwa bato banso, babali na basi, bana mpe babola mpenza baye bakendeki o boombo o Babilon te.
Jere LinVB 40:8  Bayei epai ya Godolia o Mispa. Ezalaki wana Yismael, mwa­na wa Netanya, Yokanan na Yonatan, bana ba Karea, Seraya, mwana wa Tankumet, na bana ba Efai ; moto wa Netofa, Yezanya, mwana wa mo-Maka, bango na baninga ba ba­ngo.
Jere LinVB 40:9  Godolia, mwana wa Akikam, nkoko wa Safan, alayeli bango : « Bobanga kosalela ba-Kaldea te. Botikala o ekolo eye, botosa mokonzi wa Babilon mpe manso makobo­ngela bino.
Jere LinVB 40:10  Ngai moko nakotikala o Mispa mpo ya kosolola na ba-Kaldea bakoya epai ya biso. Kasi bino, bokende kobuka mbuma ya vino, ya figi mpe ya oliva, bokamola yango mpe botia yango o mbeki, bongo botikala o bingumba bya bino. »
Jere LinVB 40:11  Se bongo bato ba Yudea banso bazalaki epai ya ba-Amon, ba-Moab, ba-Edom mpe o bikolo bisusu bayoki ’te mokonzi wa Babilon atikaki bato basusu o mokili mwa Yuda mpe atiaki wana moya­ngeli Godolia, mwana wa Akikam, nkoko wa Safan.
Jere LinVB 40:12  Bongo bato ba Yudea banso bazongi ut’o bisika binso bapanzanaki. Ezongi bango o mokili mwa Yuda epai ya Godolia o Mispa, bakei kobuka mbuma ya vino na mbuma isusu mingi.
Jere LinVB 40:13  Yokanan, mwana wa Karea, na bakomanda banso ba basoda bazalaki o esobe bakei koluka Godolia o Mispa.
Jere LinVB 40:14  Balobi na ye : « Oyebi ’te Balis, mokonzi wa ba-Amon, ati­ndi Yismael, mwana wa Netanya, mpo aboma yo ? » Kasi Godolia, mwana wa Akikam, andimi mpo ena te.
Jere LinVB 40:15  O Mispa Yokanan, mwana wa Karea, ayebisi Godolia na bo­nkutu : « Ngai nakokende koboma Yismael, mwana wa Netanya : moto moko akoyeba yango te. To olingi ’te aboma yo ? Bongo bato ba Yudea banso basangani sikawa epai ya yo batelengana mpe ba-Yuda baye batikali naino, bakufa. »
Jere LinVB 40:16  Kasi Godolia, mwana wa Akikam, azongiseli Yokanan, mwana wa Karea, maloba maye : « Osala bongo te, za­mbi makambo ozali koloba mpo ya Yismael mazali ma solo te ! »