JEREMIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
Chapter 6
Jere | LinVB | 6:1 | Bino bato ba Benyamin, bokima Yeruzalem ! Bobete mondule o Tekoa, botia elembo o Bet-Akerem zambi mpasi ya nsomo eye ekokwela bino ekouta o Nordi. | |
Jere | LinVB | 6:3 | Bakengeli bakoyaka wana na mpata ya bango, mpe bakotelemisaka biema bya bango zongazonga na ye, bakoleisaka bibwele bya bango, moto na moto o eteni ya ye. | |
Jere | LinVB | 6:4 | Bomilengele mpo ya kobundisa ye. Boteleme mpe tobundisa ye na midi. Mawa na biso zambi moi mosili kokita, molili mwa butu moyei. | |
Jere | LinVB | 6:6 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Bokata nzete, bopika lopango o boso bwa Yeruzalem, zambi engumba eye etondi na lokuta mpe na minyoko. | |
Jere | LinVB | 6:7 | Lokola liziba likobimisaka mai, engumba eye ekobotaka makambo mabe. Okoyoka wana se bitumba mpe bobomani, nakomonoko se makambo ma mpasi mpe ma bozoki mpota. | |
Jere | LinVB | 6:8 | E Yeruzalem, ndima ’te bakebisa yo, soki te nakopangana na yo lisusu te, nakokomisa yo mopotu, ekolo ezangi bato. | |
Jere | LinVB | 6:9 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Bosangisa bato ba Israel batikali, lokola bakosangisaka mbuma ya vino ya nsuka ya elanga ; zonga naino lokola oyo akei kobuka mbuma lisusu. | |
Jere | LinVB | 6:10 | Naloba na nani ? Nakebisa nani ? Bazali na matoi mangbongi, bakoki koyokemela te. Bakotalaka liloba lya Nzambe lokola liseki, bakosepelaka na lyango soki te. | |
Jere | LinVB | 6:11 | Ngai natondi na nkanda ya Yawe, nayebi lisusu kokanga motema te. Nakokitisela bana ba mboka na mpe bilenge banso nkanda ya ngai. Banso bakokangema : babali na basi, babange na bampaka. | |
Jere | LinVB | 6:12 | Bato basusu bakozwa ndako ya bango, bilanga mpe basi ba bango. Nakotumbola bato ba ekolo eye. Maloba ma Yawe. | |
Jere | LinVB | 6:13 | Banso, bana na bakolo, bakowelaka mosolo, banso, baprofeta na banganga Nzambe, bazali bakosi. | |
Jere | LinVB | 6:14 | Bakotalaka mpasi ya bato ba ngai se mpamba, bakolobaka : « Manso mazali malamu », nzokande eloko yoko ezali malamu te. | |
Jere | LinVB | 6:15 | Ata bakosalaka mabe, bakoyokaka yango nsoni te. Balingi kondima te ’te bazali na ezalela ya nsoni. Yango wana bakokweya moko moko, bakotuta libaku mokolo nakopesa bango etumbu. Maloba ma Yawe. | |
Jere | LinVB | 6:16 | Yawe alobi boye : Boteleme o nzela mpe botala, bomituna mpo ya nzela ya kala : Wapi nzela ya bolamu ? Na nsima bolanda yango mpe bokozwa kimia. Kasi bango balobi : « Tokolanda nzela ena te ! » | |
Jere | LinVB | 6:17 | Natii bato bakengele bango, nalobi : « Bokeba soko babandi kobete mondule. » Kasi bango balobi : « Tokokeba na yango te. » | |
Jere | LinVB | 6:18 | Bongo bino bato ba bikolo, boyoka ngai, bino bato ba Israel, boyeba makambo makokwela bango. | |
Jere | LinVB | 6:19 | Bino bato ba nse, boyoka ! Nakotindela bato ba mokili moye likambo lya mpasi, ekozala etumbu mpo baboyaki ngai. Batiaki matoi na maloba ma ngai te mpe bakinolaki mibeko mya ngai. | |
Jere | LinVB | 6:20 | Mpaka ya malasi euti o Saba ekosala ngai nini ? Na mpe matiti ma nsolo mpimbo mauti mosika ? Mabonza ma kotumba ma bino makosepelisaka ngai te, miboma mya bino mikoyokisaka ngai elengi te. | |
Jere | LinVB | 6:21 | Yango wana Yawe alobi boye : Nakotiela ekolo eye mabaku mpe bakokweya : tata elongo na mwana, baninga na bayebani, banso bakokufa. | |
Jere | LinVB | 6:22 | Yawe alobi boye : Bato ba ekolo ya Nordi bazali koya, bato ba ekolo enene babimi o nsuka ya mokili ; | |
Jere | LinVB | 6:23 | bazali na litimbo mpe na likongo, bayoki se nkanda, mawa te ; basali makeléle lokola mbonge ya mbu, batandi milongo mya basoda ba farasa, bayei kobundisa yo, Sion. | |
Jere | LinVB | 6:24 | Eyoki biso nsango, tokitisi maboko, nsomo ekangi biso, toyoki bolozi lokola mwasi alingi abota. | |
Jere | LinVB | 6:25 | Bobima o esobe te, botambola o nzela te, mimpanga mya banguna mikoyokisa nsomo bipai binso ! | |
Jere | LinVB | 6:26 | Elenge mwasi wa ekolo ya ngai, lata ngoto, omibilinginya o mputulu. Sala lilaka lokola bakosalaka mpo ya mwana se moko, na nzembo ya mawa, zambi mobebisi akobimela biso na mbalakaka. | |
Jere | LinVB | 6:29 | Batii mompepe mokasi mpo bibende binyangwa o móto, motuli amiyokisi mpasi se mpamba, zambi bosoto bwa bibende bokolongwa te. | |