Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JEREMIAH
Prev Up Next
Chapter 43
Jere LinVB 43:1  Awa Yeremia asilisi koloba maloba mana manso o nko­mbo ya Yawe, Nzambe wa bango,
Jere LinVB 43:2  Azarya, mwana wa Osaya, na Yokanan, mwana wa Karea, na bato banso ba lolendo bagangeli Yeremia : « Ozali kobuka lokuta ! Yawe Nzambe wa biso atindi yo te mpo osakola ’te tokende kofanda o Ezipeti te.
Jere LinVB 43:3  Baruk, mwana wa Neria, apesi yo mayele mabe, alingi kokaba biso o maboko ma ba-Kaldea mpo ’te baboma biso mpe bakende na biso o Babilon. »
Jere LinVB 43:4  Yokanan, mwana wa Karea, bakomanda banso mpe bato banso baboyi kotosa Yawe, balingi kotikala o Yuda te.
Jere LinVB 43:5  Yokanan, mwana wa Karea, na bakomanda banso ba basoda basangisi bato banso ba Yuda batikali, baye balongwaki o bikolo esika bapanzanaki mpe bazo­ngaki mpo ’te bafanda o ekolo ya Yuda ;
Jere LinVB 43:6  basangisi mpe babali, basi na bana, na bilenge basi ba moko­nzi, na bato banso Nebuzaradan, ko­manda wa bakengeli, atikaki epai ya Godolia, mwana wa Akikam, nkoko wa Safan. Bakei mpe na profeta Yeremia na Baruk, mwana wa Neria.
Jere LinVB 43:7  Baboyi kotosa monoko mwa Yawe, bakei na bango o Ezipeti mpe bakomi o Tapanes.
Jere LinVB 43:8  O Tapanes Yawe alobi na Yeremia maloba maye :
Jere LinVB 43:9  « Kamata mabanga manene o miso ma bato ba Yudea mpe kangisa mango o kati ya mabelé libazi, penepene na ezibeli ya ndako ya Farao o Tapanes.
Jere LinVB 43:10  Na nsima okoloba na bato : Yawe wa bokasi bonso, Nzambe wa Israel, alobi : Tala, nakobenga mosaleli wa ngai Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon, aya awa mpe atonga ngwe­nde ya ye o mabanga maye naka­ngisi awa, mpe akopika wana ema ya bokonzi bwa ye.
Jere LinVB 43:11  Akoya mpe akobebisa mokili mwa Ezipeti : Oyo akoki na liwa, akufa ! Oyo akoki na boombo, akende o boombo ! Oyo akoki na mopanga, akufa na mopanga !
Jere LinVB 43:12  Akotumba tempelo inso ya ba­nzambe ba Ezipeti, akotumba bi­keko bya bango to akokende na bya­ngo ; akolongola bato banso o mo­ki­li mwa Ezipeti lokola moke­ngeli wa mpata akolongolaka nsili o monkoto mwa ye. Na nsima akobima wana na boboto.
Jere LinVB 43:13  Akobuka ma­konzi manene ma tempelo ya Mwese o Ezipeti, mpe akotumba tempelo inso ya ba­nzambe ba Ezipeti. »