Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JEREMIAH
Prev Up Next
Chapter 30
Jere LinVB 30:2  Yawe Nzambe wa Israel alobi : Koma maloba ma­nso nalobaki na yo o buku.
Jere LinVB 30:3  Mikolo mikoya nakobongisa ekolo ya Israel na Yuda, maloba ma Yawe. Nakozongisa bango lisusu o mokili napesaki bankoko ba bango, mpo ’te bakoma bankolo ba mokili mwa­ngo.
Jere LinVB 30:4  Boyoka maloba Yawe asakolaki ona Israel na Yuda :
Jere LinVB 30:5  Yawe alobi boye : Nayoki boleli bwa nsomo, bato bazali kobanga, bazali na kimia te.
Jere LinVB 30:6  Bongo botuna mpe botala : Mobali akoki nde kobota mwana ? Ntina nini nazali komono ’te babali banso batii maboko o loketo lokola mwasi azali kobota ? Ntina nini bozali na bilongi bya bobangi ?
Jere LinVB 30:7  Solo, mokolo monene moyei ! Mokolo moko mokokani na mwa­ngo te ! Ekomeli Yakob eleko ya mawa, kasi akobika.
Jere LinVB 30:8  Yawe alobi boye : O mokolo mona nakobuka ekangiseli o nki­ngo ya bango mpe nakokata mi­nyololo mya bango. Bakosalela ba­mpaya lisusu te,
Jere LinVB 30:9  kasi Israel na Yuda bakosalela Yawe Nzambe wa bango, mpe Davidi, mokonzi oyo nakopesa bango.
Jere LinVB 30:10  Yawe alobi : Yo mosaleli wa ngai, Yakob, obanga te, yo Israel, oyoka nsomo te. Nakobikisa yo na bana ba yo o mikili mosika, esika bokangemi o boombo ; bana ba Yakob bakozonga mpe bakofanda na boboto, bakozala kimia mpe moto moko akotungisa bango te.
Jere LinVB 30:11  Nazali na yo mpo ya kobikisa yo, maloba ma Yawe, nakosilisa bokasi bwa bikolo esika napanzaki yo. Nalingi kosilisa yo te, kasi nakotumbola yo na bosembo, soko okoki na etumbu, ekozanga te.
Jere LinVB 30:12  Yawe alobi boye : Okobika o mpasi ya yo te, bakoki kokaukisa mpota ya yo te.
Jere LinVB 30:13  Moto moko akosalisa yo te, mpo ya mpota ya yo monó mokomonono te.
Jere LinVB 30:14  Baye banso balingaki yo babosani yo, bakanisi yo lisusu te. Nabeti yo lokola monguna, napesi yo etumbu enene mpo ya mabe ma yo maike mpe masumu ma yo ebele.
Jere LinVB 30:15  Mpo nini ozali kolela awa ozoki ? Mpota ya yo ekoki kosila te ! Nasali yo maye manso mpo ya mabe mpe masumu ma yo maike.
Jere LinVB 30:16  Baye banso basilisi yo, bango moko mpe bakosila ; banguna ba yo banso bakokende o boombo ; baye babotoli yo biloko, bakobotolo bango mpe ; baye bayibeli yo, bakoyibela ba­ngo mpe.
Jere LinVB 30:17  Kasi ngai nakobikisa yo, nakokaukisa mpota ya yo. Maloba ma Yawe. Bazalaki kotanga yo Sion ‘Oyo babengani, oyo bapangani na ye te’.
Jere LinVB 30:18  Yawe alobi boye : Nakobongisa lisusu biema bya Yakob, nakoyokela ndako ya ye mawa. Bakotonga engumba lisusu o mabanga ma liboso, bakozongisa nda­ko kitoko o esika ezalaka.
Jere LinVB 30:19  Bakoyemba nzembo ya botondi mpe bakoganga na esengo, bakozala bato baike, motango mwa bango mokokutwa te, nakopesa bango lokumu, bakokinola bango lisusu te.
Jere LinVB 30:20  Bana ba bango bakozala lokola bazalaki liboso, bakosangana na boboto o miso ma ngai, nakotumbola banyokoli ba ba­ngo.
Jere LinVB 30:21  Ndeko wa bango moko akoya­ngela bango, mokonzi monene akobima se o libota lya bango moko. Nakobenga ye mpe akoya epai ya ngai. Nani abanga te kobeleme na ngai soko ngai moko nabengi ye te ? Maloba ma Yawe.
Jere LinVB 30:22  Bokozala bato ba ngai mpe ngai nakozala Nzambe wa bi­no.
Jere LinVB 30:23  Ekumbaki ya Yawe ekoya : nkanda lokola nkake ekokitela bato babe.
Jere LinVB 30:24  Nkanda ya Yawe ekolongwa te liboso ’te akokisa mikano mya ye. Bobele nsima okoyeba ntina ya yango.