JEREMIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
Chapter 30
Jere | LinVB | 30:3 | Mikolo mikoya nakobongisa ekolo ya Israel na Yuda, maloba ma Yawe. Nakozongisa bango lisusu o mokili napesaki bankoko ba bango, mpo ’te bakoma bankolo ba mokili mwango. | |
Jere | LinVB | 30:6 | Bongo botuna mpe botala : Mobali akoki nde kobota mwana ? Ntina nini nazali komono ’te babali banso batii maboko o loketo lokola mwasi azali kobota ? Ntina nini bozali na bilongi bya bobangi ? | |
Jere | LinVB | 30:7 | Solo, mokolo monene moyei ! Mokolo moko mokokani na mwango te ! Ekomeli Yakob eleko ya mawa, kasi akobika. | |
Jere | LinVB | 30:8 | Yawe alobi boye : O mokolo mona nakobuka ekangiseli o nkingo ya bango mpe nakokata minyololo mya bango. Bakosalela bampaya lisusu te, | |
Jere | LinVB | 30:9 | kasi Israel na Yuda bakosalela Yawe Nzambe wa bango, mpe Davidi, mokonzi oyo nakopesa bango. | |
Jere | LinVB | 30:10 | Yawe alobi : Yo mosaleli wa ngai, Yakob, obanga te, yo Israel, oyoka nsomo te. Nakobikisa yo na bana ba yo o mikili mosika, esika bokangemi o boombo ; bana ba Yakob bakozonga mpe bakofanda na boboto, bakozala kimia mpe moto moko akotungisa bango te. | |
Jere | LinVB | 30:11 | Nazali na yo mpo ya kobikisa yo, maloba ma Yawe, nakosilisa bokasi bwa bikolo esika napanzaki yo. Nalingi kosilisa yo te, kasi nakotumbola yo na bosembo, soko okoki na etumbu, ekozanga te. | |
Jere | LinVB | 30:14 | Baye banso balingaki yo babosani yo, bakanisi yo lisusu te. Nabeti yo lokola monguna, napesi yo etumbu enene mpo ya mabe ma yo maike mpe masumu ma yo ebele. | |
Jere | LinVB | 30:15 | Mpo nini ozali kolela awa ozoki ? Mpota ya yo ekoki kosila te ! Nasali yo maye manso mpo ya mabe mpe masumu ma yo maike. | |
Jere | LinVB | 30:16 | Baye banso basilisi yo, bango moko mpe bakosila ; banguna ba yo banso bakokende o boombo ; baye babotoli yo biloko, bakobotolo bango mpe ; baye bayibeli yo, bakoyibela bango mpe. | |
Jere | LinVB | 30:17 | Kasi ngai nakobikisa yo, nakokaukisa mpota ya yo. Maloba ma Yawe. Bazalaki kotanga yo Sion ‘Oyo babengani, oyo bapangani na ye te’. | |
Jere | LinVB | 30:18 | Yawe alobi boye : Nakobongisa lisusu biema bya Yakob, nakoyokela ndako ya ye mawa. Bakotonga engumba lisusu o mabanga ma liboso, bakozongisa ndako kitoko o esika ezalaka. | |
Jere | LinVB | 30:19 | Bakoyemba nzembo ya botondi mpe bakoganga na esengo, bakozala bato baike, motango mwa bango mokokutwa te, nakopesa bango lokumu, bakokinola bango lisusu te. | |
Jere | LinVB | 30:20 | Bana ba bango bakozala lokola bazalaki liboso, bakosangana na boboto o miso ma ngai, nakotumbola banyokoli ba bango. | |
Jere | LinVB | 30:21 | Ndeko wa bango moko akoyangela bango, mokonzi monene akobima se o libota lya bango moko. Nakobenga ye mpe akoya epai ya ngai. Nani abanga te kobeleme na ngai soko ngai moko nabengi ye te ? Maloba ma Yawe. | |