JEREMIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
Chapter 40
Jere | LinVB | 40:1 | Yawe alobi na Yeremia o ntango Nebuzaradan, komanda wa bakengeli, alongolaki ye o Rama, zambi akutaki ye na minyololo o maboko o kati ya bato ba Yeruzalem mpe ba Yuda, baye bakangemaki wana mpo ’te bakende o boombo o Babilon. | |
Jere | LinVB | 40:2 | Komanda wa bakengeli abengi Yeremia mpe alobi na ye : « Yawe Nzambe wa yo asili ayebisi ’te mpasi eye ekokwela ekolo eye ; | |
Jere | LinVB | 40:3 | sikawa akokisi maye alobaki. Mpasi ekweli bino zambi bosalaki Yawe mabe mpe boyokaki ye te. | |
Jere | LinVB | 40:4 | Sikawa nakolongola minyololo mya yo. Soko olingi kokende elongo na ngai o Babilon, yaka, ngai nakobatela yo. Soko olingi kokende na ngai kuna te, tikala awa. O mokili mobimba okoki kokende epai olingi. » | |
Jere | LinVB | 40:5 | Awa Yeremia akei naino te, abakisi : « Soko olingi kotikala epai ya ngai te, zonga epai ya Godolia, mwana wa Akikam, nkoko wa Safan, oyo mokonzi wa Babilon atii moyangeli wa bingumba bya Yuda ; okoki kotikala epai ya ye o ntei ya bato ba yo to kokende epai olingi. » Nsima komanda wa bakengeli apesi ye biloko bya kolia mpe mabonza, mpe alingisi ye ’te akende. | |
Jere | LinVB | 40:6 | Yeremia akei o Mispa epai ya Godolia, mwana wa Akikam ; afandi epai ya ye o ntei ya bato batikalaki o mokili. | |
Jere | LinVB | 40:7 | Bakomanda banso ba basoda batikali o esobe na bato ba bango bayoki ’te mokonzi wa Babilon atiaki Godolia, mwana wa Akikam, moyangeli wa ekolo, apesaki ye mpe bokonzi bwa bato banso, babali na basi, bana mpe babola mpenza baye bakendeki o boombo o Babilon te. | |
Jere | LinVB | 40:8 | Bayei epai ya Godolia o Mispa. Ezalaki wana Yismael, mwana wa Netanya, Yokanan na Yonatan, bana ba Karea, Seraya, mwana wa Tankumet, na bana ba Efai ; moto wa Netofa, Yezanya, mwana wa mo-Maka, bango na baninga ba bango. | |
Jere | LinVB | 40:9 | Godolia, mwana wa Akikam, nkoko wa Safan, alayeli bango : « Bobanga kosalela ba-Kaldea te. Botikala o ekolo eye, botosa mokonzi wa Babilon mpe manso makobongela bino. | |
Jere | LinVB | 40:10 | Ngai moko nakotikala o Mispa mpo ya kosolola na ba-Kaldea bakoya epai ya biso. Kasi bino, bokende kobuka mbuma ya vino, ya figi mpe ya oliva, bokamola yango mpe botia yango o mbeki, bongo botikala o bingumba bya bino. » | |
Jere | LinVB | 40:11 | Se bongo bato ba Yudea banso bazalaki epai ya ba-Amon, ba-Moab, ba-Edom mpe o bikolo bisusu bayoki ’te mokonzi wa Babilon atikaki bato basusu o mokili mwa Yuda mpe atiaki wana moyangeli Godolia, mwana wa Akikam, nkoko wa Safan. | |
Jere | LinVB | 40:12 | Bongo bato ba Yudea banso bazongi ut’o bisika binso bapanzanaki. Ezongi bango o mokili mwa Yuda epai ya Godolia o Mispa, bakei kobuka mbuma ya vino na mbuma isusu mingi. | |
Jere | LinVB | 40:13 | Yokanan, mwana wa Karea, na bakomanda banso ba basoda bazalaki o esobe bakei koluka Godolia o Mispa. | |
Jere | LinVB | 40:14 | Balobi na ye : « Oyebi ’te Balis, mokonzi wa ba-Amon, atindi Yismael, mwana wa Netanya, mpo aboma yo ? » Kasi Godolia, mwana wa Akikam, andimi mpo ena te. | |
Jere | LinVB | 40:15 | O Mispa Yokanan, mwana wa Karea, ayebisi Godolia na bonkutu : « Ngai nakokende koboma Yismael, mwana wa Netanya : moto moko akoyeba yango te. To olingi ’te aboma yo ? Bongo bato ba Yudea banso basangani sikawa epai ya yo batelengana mpe ba-Yuda baye batikali naino, bakufa. » | |