JEREMIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
Chapter 34
Jere | LinVB | 34:1 | Yawe alobi na Yeremia o ntango Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon, na limpinga lya ye mobimba mpe liye lya bakonzi banso ba bikolo binso bya mokili mwa ye bazalaki kobundisa Yeruzalem mpe bingumba bya penepene. | |
Jere | LinVB | 34:2 | Yawe Nzambe wa Israel alobi boye : Kende koyebisa Sedekia, mokonzi wa Yuda : Yawe alobi : Nakokaba engumba eye o maboko ma mokonzi wa Babilon, mpe ye akotumba yango. | |
Jere | LinVB | 34:3 | Okokima maboko ma ye te, kasi bakokanga yo mpe bakokaba yo na ye. Okoteleme o miso ma ye mpe okosolola na ye. Na nsima okokende o Babilon. | |
Jere | LinVB | 34:4 | Kasi yoka liloba lya Yawe, yo Sedekia, mokonzi wa Yuda : Mpo ya yo Yawe alobi boye : Okokufa na mopanga te, | |
Jere | LinVB | 34:5 | okokufa se na boboto. Lokola bazalaki kotumbela bankoko ba yo, baye bazalaki bakonzi liboso lya yo, mpaka ya malasi, se bongo bakotumbela yo mpaka ya malasi, bakoyembela yo mpe nzembo ya boleli ‘Mawa e, mokonzi wa ngai !’ Ngai moto nayebisi bongo. Maloba ma Yawe. | |
Jere | LinVB | 34:6 | Profeta Yeremia asakoli maloba mana manso o boso bwa Sedekia, mokonzi wa Yuda o Yeruzalem, | |
Jere | LinVB | 34:7 | o ntango basoda ba mokonzi wa Babilon bazalaki kobunda mpo ya kobotolo Yeruzalem mpe bingumba bya Yuda, Lakis na Azeka, mpo bakokaki na bibombamelo biye naino te. | |
Jere | LinVB | 34:8 | Yawe alobi na Yeremia liloba liye o ntango Sedekia ayokanaki na bato ba Yeruzalem ’te bakopesa baombo bonsomi : | |
Jere | LinVB | 34:9 | moto na moto apesa baombo ba ye ba-Ebrei, babali na basi, bonsomi, moto moko atikala na ndeko wa ye mo-Yuda bo moombo lisusu te. | |
Jere | LinVB | 34:10 | Bankumu na bato banso bayokanaki ’te bakotika baombo, bandimi kobikisa baombo ba bango, babali na basi. | |
Jere | LinVB | 34:11 | Kasi na nsima batiki mokano mona, bakangi lisusu babali na basi o boombo mpe batindi bango ’te basalela bango lisusu. | |
Jere | LinVB | 34:13 | Yawe Nzambe wa Israel alobi : O ntango nabimisaki bankoko ba bino o mokili mwa Ezipeti, esika bazalaki baombo, nakataki na bango bondeko boye : | |
Jere | LinVB | 34:14 | « Nsima ya mibu nsambo inso moko moko wa bino apesa bonsomi na ndeko wa ye mo-Ebrei oyo asengelaki komiteka na ye. Akozala moombo wa yo mibu motoba, na nsima okozongisela ye bonsomi. » Kasi bankoko ba bino bayokaki ngai te, mpe batosaki ngai te. | |
Jere | LinVB | 34:15 | Nzokande na nsima bobongolaki mitema, mpe bosalaki maye mazali semba o miso ma ngai : bosakolaki libiki lya baninga mpe bolayaki ndai o miso ma ngai o Tempelo eye ezali na nkombo ya ngai. | |
Jere | LinVB | 34:16 | Kasi bobongoli makanisi ma bino lisusu, bosantoli nkombo ya ngai, bozongisi o boombo babali na basi, baye bozongiselaki bonsomi mpe botindi bango na makasi ’te bakoma baombo ba bino lisusu. | |
Jere | LinVB | 34:17 | Yango wana Yawe alobi boye : Botosi ngai te awa boboyi kopesa ndeko to moninga wa bino bonsomi. Tala bonsomi ngai nakopesa bino : Nakotindela bino mopanga, nzala ekasi na bokono bobe. Yawe alobi bongo. Nakokomisa bino bo ndakisa ya nsomo o miso ma bikolo binso bya nse. | |
Jere | LinVB | 34:18 | Bato baye babebisi bondeko bwa ngai, batosi mibeko mya bondeko bona te lokola balayaki o miso ma ngai, nakosala na bango lokola na mwana wa ngombe, eye bakokata na biteni bibale mpo baleka o kati ya biteni bina. | |
Jere | LinVB | 34:19 | Bankumu ba Yuda mpe ba Yeruzalem, ba-eniki, banganga Nzambe na bakolo ba mboka banso baleki o kati ya biteni bibale bya mwana wa ngombe, | |
Jere | LinVB | 34:20 | nakokaba bango o maboko ma banguna balingi koboma bango ; bibembe bya bango bikozala bilei bya ndeke ya likolo mpe bya nyama ya zamba. | |
Jere | LinVB | 34:21 | Nakokaba mpe Sedekia, mokonzi wa Yuda, na bankumu ba ye o maboko ma banguna balingi koboma bango, mpe o maboko ma basoda ba mokonzi wa Babilon, baye basili bakei mosika na bino. | |