JEREMIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
Chapter 29
| Jere | LinVB | 29:1 | Yoka maloba ma monkanda moye Yeremia akomaki o Yeruzalem mpe atindelaki bakolo bakangemi o boombo, banganga Nzambe, baprofeta na bato banso, baye Nabukodonozor akambaki ut’o Yeruzalem kin’o Babilon. | |
| Jere | LinVB | 29:2 | Ezalaki o ntango mokonzi Yekonia alongwaki o Yeruzalem elongo na mama mokonzi, ba-eniki, bankumu ba Yuda mpe ba Yeruzalem, batuli na mpe bato banso bakosalaka bikangeli. | |
| Jere | LinVB | 29:3 | Apesi monkanda mona na Eleasa, mwana wa Safan mpe na Gemaria, mwana wa Kilkia. Sedekia, mokonzi wa Yuda, atindaki bango o Babilon epai ya Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon. O monkanda bakomaki boye : | |
| Jere | LinVB | 29:4 | « Yawe wa bokasi bonso, Nzambe wa Israel, alobi na bato banso bakangemi o boombo, baye bakambamaki ut’o Yeruzalem kin’o Babilon : | |
| Jere | LinVB | 29:6 | Bobala basi mpe bobota bana babali na bana basi. Boponela bana ba bino basi, bobalisa bana basi ba bino mpo babota bana babali na bana basi. Ebongi bozala baike mpe motango mwa bino mozonga nsima te. | |
| Jere | LinVB | 29:7 | Bobongisa engumba esika natindaki bino o boombo. Bosambela Yawe asala yango malamu, zambi soko ezali malamu, bino mpe bokofanda malamu. | |
| Jere | LinVB | 29:8 | Yawe wa bokasi bonso Nzambe wa Israel alobi : Baprofeta na bamoni-makambo bazali o ntei ya bino babungisa bino nzela te. | |
| Jere | LinVB | 29:9 | Mpamba te, bazali kosakola makambo ma lokuta o nkombo ya ngai. Ngai natindaki bango te. Maloba ma Yawe. | |
| Jere | LinVB | 29:10 | Yawe alobi boye : Soko bosili bokokisi mibu ntuku nsambo o Babilon, nakopangana na bino mpe nakokokisa elako eye nalakelaki bino mpe nakozongisa bino lisusu awa. | |
| Jere | LinVB | 29:11 | Yawe alobi : Nayebi maye nakani kosala bino. Nakopesa bino boboto, nakoyokisa bino mpasi te, mpo ’te bozala na elikya o mikolo mikoya. | |
| Jere | LinVB | 29:14 | Nakosala ’te bokoka kozwa ngai. Maloba ma Yawe. Nakolongola bino o boombo, mpe nakosangisa bino ut’o bikolo mpe o bisika binso napanzaki bino ; nakozongisa bino o esika nabenganaki bino liboso. Yawe alobi bongo. | |
| Jere | LinVB | 29:16 | Yawe alobi bongo mpo ya mokonzi oyo afandi o ngwende ya Davidi, bato banso bakofandaka o engumba eye, na mpe bandeko ba bino bakendeki na bino o boombo te. | |
| Jere | LinVB | 29:17 | Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Nakotindela bango mopanga, nzala ekasi na bokono bobe ; nakokomisa bango lokola figi ibebi nye, iye ikoki koliama te. | |
| Jere | LinVB | 29:18 | Nakobengana bango na mopanga, na nzala ekasi mpe na bokono bobe. Nakokomisa bango eloko ya nsomo o miso ma bato ba nse mobimba, eloko ya kobanga, eloko ya kokamwa mpe ya koseke o miso ma bato ba mikili minso esika nakopanza bango, | |
| Jere | LinVB | 29:19 | mpo bayokaki ngai te. Yawe alobi boye : Ata nalembeki te kotindela bango basaleli ba ngai baprofeta, bayokaki bango te. Maloba ma Yawe. | |
| Jere | LinVB | 29:20 | Boyoka liloba lya Yawe, bino banso bato bokangemi o boombo, baye natindaki ut’o Yeruzalem kin’o Babilon ! | |
| Jere | LinVB | 29:21 | Yawe wa bokasi bonso, Nzambe wa Israel, alobi bongo mpo ya Akab, mwana wa Kolaya, mpe mpo ya Sidkia, mwana wa Maseya, baye bakosakolaka makambo ma lokuta o nkombo ya ngai : nakokaba bango o maboko ma Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon. Ye akoboma bango o miso ma bino. | |
| Jere | LinVB | 29:22 | Bato banso ba Yuda bakangemi o boombo o Babilon bakotombela bato bobe, bakoloba : Yawe asala na yo lokola asalaki na Sidkia mpe na Akab, baye mokonzi wa Babilon atumbaki o móto. | |
| Jere | LinVB | 29:23 | Mpamba te, basalaki bokali na basi ba baninga mpe basakolaki makambo ma lokuta o nkombo ya ngai, ata natindaki bango te. Nayebi yango malamu, nazalaki komono yango. Maloba ma Yawe. » | |
| Jere | LinVB | 29:25 | Yawe wa bokasi bonso, Nzambe wa Israel, alobi boye : O nkombo ya yo moko otindelaki bato banso ba Yeruzalem, nganga Nzambe Sefania, mwana wa Maseya, mpe banganga Nzambe banso monkanda na maloba maye : | |
| Jere | LinVB | 29:26 | « Yawe atiaki yo nganga Nzambe o esika ya nganga Nzambe Yoyada mpo ’te okengele Tempelo ya Yawe mpe otala baye banso bakosakolaka makambo ma bozoba, mpe okanga bango o boloko, minyololo o makolo. | |
| Jere | LinVB | 29:27 | Bongo mpo nini otiki Yeremia wa Anatot, oyo akomiyebisaka lokola profeta o kati ya bino ? | |
| Jere | LinVB | 29:28 | Atindeli biso mpe monkanda awa o Babilon na maloba maye : ‘Boombo bokoumela mingi ! Botonga ndako mpe bofanda wana, bolona mboto o bilanga mpe bolia mbuma ya yango’. » | |
| Jere | LinVB | 29:31 | Yebisa bato banso bakangemi o boombo maloba maye : « Yawe alobi mpo ya Semaya wa Naklam : Awa Semaya asakoli lokola profeta ata natindaki ye te, mpe awa andimisi bino maloba ma lokuta, | |