Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JEREMIAH
Prev Up Next
Chapter 33
Jere LinVB 33:1  O ntango Yeremia akangemaki naino o lopango la bakengeli ba boloko, Yawe alobi na ye mbala ya ibale maloba maye :
Jere LinVB 33:2  Yawe oyo akeli nse mpe abongisi yango mpo ezala makasi, nkombo ya ye Yawe, alobi boye :
Jere LinVB 33:3  Belela ngai mpe nakoyanola yo ; nakoyebisa yo makambo manene mabo­mbami, maye okoki koyeba te.
Jere LinVB 33:4  Solo, Yawe Nzambe wa Israel alobi boye mpo ya ndako inso ya engumba eye mpe mpo ya ndako inene ya bakonzi ba Yuda, iye ibukani
Jere LinVB 33:5  na ba-Kaldea ; eto­ndi na bibembe bya bato, mpo na nkanda enene nabombeli engu­mba eye elongi ya ngai, mpamba te, mabe ma bango maleki boike.
Jere LinVB 33:6  Sikawa nakoyela bango monó mpe nakopesa bango libiki : nakobikisa bango mpe nakokabela bango bolamu mpe boboto.
Jere LinVB 33:7  Nakobongisa makambo ma bato ba Yuda mpe ba Israel mpo ’te bakoma lisusu lokola liboso.
Jere LinVB 33:8  Nakopetola bango na masumu ma bango manso ; nakolimbisa bango mabe manso basalaki ngai ntango bato­mbokeli na ngai.
Jere LinVB 33:9  Yeruzalem ekokoma ntina ya litu­ndu, ya esengo, ya lokumu mpe ya nkembo ya ngai o miso ma bato ba bikolo binso bya nse. Ntango bakoyoka malamu manso nakosala yango, bakoyoka nsomo mpe bakolenge mpo ya bolamu mpe mpo ya boboto nakopesa yango.
Jere LinVB 33:10  Yawe alobi boye : O esika eye bino bokolobaka ’te ekomi mopotu mozangi bato na nyama, o bingu­mba bya Yuda mpe o balabala ya Yeruzalem ibebi, esika bato na nyama izali te,
Jere LinVB 33:11  bokoyoka lisusu migango mya esengo, nzembo ya mobali abandi mwasi mpe maloba ma esengo ma mwasi babandi ye, mpe nzembo ya baye bayei na mabonza o Tempelo ya Yawe mpo ya koto­ndo ye na maloba maye : « Totondo Yawe wa bokasi bonso, zambi Yawe akosalaka malamu, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko. » Yawe alobi : Nakokomisa mokili mona lisusu lo­kola mozalaki liboso. Maloba ma Yawe.
Jere LinVB 33:12  Yawe wa bokasi bonso alobi : O mokili moye mobebi, esika bato na nyama izali lisusu te, bingumba bikozala na bisobe bikotonda na matiti esika bakengeli ba mpata bakoleisa mpata ya bango.
Jere LinVB 33:13  O bingu­mba bya Ngomba, bya Bisobe mpe bya Negeb, o mokili mwa Benyamin, penepene na Yeruzalem mpe o bingumba bya Yuda mpata ikoleka lisusu o miso ma moto akotanga ya­ngo. Maloba ma Yawe.
Jere LinVB 33:14  Yawe alobi boye : Mikolo mikoya nakokokisa bilako nalakelaki ma­bota ma Israel na Yuda.
Jere LinVB 33:15  O mikolo mina, o ntango ena, nakobimisa eboto o libota lya Davidi, eboto ya bosembo, oyo akoyangela ekolo na bose­mbo mpe na bosolo.
Jere LinVB 33:16  O mikolo mina Yuda akobika mpe Yeruzalem ekozala kimia. Bakotanga Engumba eye : ‘Yawe, bosembo bwa biso’.
Jere LinVB 33:17  Yawe alobi boye : Libota lya Davidi likozanga mokitani te oyo akofanda o ngwende ya Israel.
Jere LinVB 33:18  Mi­kolo minso bankoko ba Levi bakoteleme o boso bwa ngai mpe bakobonzela ngai miboma na mabonza ma bolei na mabonza ma mokolo na mokolo.
Jere LinVB 33:20  Yawe alobi boye : Soko moto moko akoboma bondeko tokataki, biso na moi mpe na butu, bongo moi na butu bikolandana lisusu te,
Jere LinVB 33:21  bo­ndeko bwa ngai na Davidi, mosaleli wa ngai, bokobeba mpe, bo­ngo moko wa bankoko ba ye akozala mokonzi lisusu te ; se bongo na ba-Levi, banganga Nzambe baye bakosalelaka ngai.
Jere LinVB 33:22  Lokola bakoki kotanga minzoto ebele te, zelo o libongo lya mbu mpe te, nakosala ’te bankoko ba Davidi, mosaleli wa ngai, mpe ba-Levi bakosalelaka ngai bakoma ebele.
Jere LinVB 33:24  Oyoki te ’te bato bakolobaka « Yawe aponoki mabota mana mabale, kasi sikawa asili kobwaka mango » ? Bakokinolaka bato ba ngai bongo ; o miso ma bango bazali lisusu ekolo te.
Jere LinVB 33:25  Yawe alobi boye : Lokola nakataki bondeko na moi mpe na butu, mpe napesaki likolo na nse mibeko,
Jere LinVB 33:26  nakobwaka ba­nko­ko ba Yakob mpe ba Davidi, mosaleli wa ngai, te ; nakotika te ko­pono moko wa bankoko ba ye afa­nda o ngwende mpo ’te ayangela bankoko ba Abarama, ba Izaka mpe ba Yakob. Nakosala ’te bakoma lokola bazalaki liboso, nakoyokela bango ngolu.