JEREMIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
Chapter 39
Jere | LinVB | 39:1 | O mobu mwa libwa mwa bokonzi bwa Sedekia o Yuda, o sanza ya zomi, Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon, ayei na basoda ba ye banso kobundisa Yeruzalem ; bazingi yango. | |
Jere | LinVB | 39:2 | O mobu mwa zomi na moko mwa bokonzi bwa Sedekia, o sanza ya inei, o mokolo mwa libwa mwa sanza, babuki lopango la engumba. | |
Jere | LinVB | 39:3 | Bakomanda ba mokonzi wa Babilon baye bakoti o engumba mpe bakei pene na Ezibeli ya Kati, bango baye : komanda monene Nergalsareser wa Sin-Magir, moyangeli Nebus-Asban na bakomanda basusu ba mokonzi wa Babilon. | |
Jere | LinVB | 39:4 | Awa Sedekia, mokonzi wa Yuda, na basoda ba ye bamoni bongo, bakimi na butu mpe babimi o engumba pene na lopango la mokonzi : babimi o ezibeli ezalaki o kati ya bifelo bibale mpe bakei epai ya lobwaku la Araba. | |
Jere | LinVB | 39:5 | Kasi basoda ba-Kaldea balandi bango mpe batelemisi Sedekia o esobe ya Yeriko. Bakangi ye mpe bakei na ye o Ribla o mokili mwa Kamat epai ya Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon. Kuna mokonzi asambisi ye. | |
Jere | LinVB | 39:6 | O Riblea mokonzi wa Babilon abomisi bana ba Sedekia o miso ma ye. Mokonzi wa Babilon abomisi bankumu ba Yuda banso se bongo. | |
Jere | LinVB | 39:7 | Na nsima atuboli miso ma Sedekia mpe akangi ye na minyololo mibale mya mbengi mpo ’te bakamba ye o Babilon. | |
Jere | LinVB | 39:8 | Ba-Kaldea batumbi ndako ya mokonzi na ndako ya bato basusu, babuki lopango la Yeruzalem. | |
Jere | LinVB | 39:9 | Komanda wa bakengeli Nebuzaradan akambi bato batikalaki o Yeruzalem, baye bakimaki epai ya ye mpe bato basusu banso o Babilon. | |
Jere | LinVB | 39:10 | Nzokande Nebuzaradan, komanda wa bakengeli, atiki o Yuda se babola mpenza, baye bazalaki na eloko te. Se o ntango ena akaboleli bango bilanga bya nzete ya vino na bilanga bisusu. | |
Jere | LinVB | 39:11 | Mpo ya Yeremia, Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon, apesi Nebuzaradan, komanda wa bakengeli, etinda eye : | |
Jere | LinVB | 39:12 | « Kamata ye mpe kengele ye malamu, osala ye mabe te, kasi salisa ye o makambo manso akosenge yo. » | |
Jere | LinVB | 39:13 | Nebuzaradan, komanda wa bakengeli, Nebusazban, komanda wa bato ba lopango la mokonzi, na Nergalsarezar, komanda monene wa basoda na bakomanda banso ba mokonzi wa Babilon, | |
Jere | LinVB | 39:14 | batindi bato balongola Yeremia o lopango la bakengeli, bapesa ye o maboko ma Godolia, mwana wa Akikam, nkoko wa Safan, afandisa ye o ndako ya ye. Bongo Yeremia atikali o ntei ya bato ba ye. | |
Jere | LinVB | 39:16 | Kende koloba na Ebed-Melek, moto wa Kus : Yawe wa bokasi bonso, Nzambe wa Israel, alobi : Yoka, nakokokisa maloba manso nalobaki mpo ya engumba eye mpo ’te bato bayoka mpasi, bazala na esengo te. O mokolo maloba ma ngai makosalema o miso ma yo, | |
Jere | LinVB | 39:17 | nakobikisa yo, mpe bakokaba yo o maboko ma bato te, baye bakolengisaka yo. Yawe alobi bongo. | |