Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JEREMIAH
Prev Up Next
Chapter 25
Jere LinVB 25:1  Liloba Yawe alobi na Yeremia litali bato banso ba Yuda. Ezalaki o mobu mwa minei Yoyakim, mwana wa Yozia, azalaki mokonzi o Yuda, mpe o mobu mwa yambo Nabukodonozor azalaki mokonzi wa Babilon.
Jere LinVB 25:2  Yoka liloba profeta Yeremia asakoli o miso ma bato banso ba Yuda mpe ba Yeruzalem :
Jere LinVB 25:3  Banda mobu mwa zomi na misato mwa bokonzi bwa Yozia, mwana wa Amon, mokonzi wa Yuda, kin’o mokolo mwa lelo, ekoki sikawa mibu ntuku ibale na misato, Yawe alobaki na ngai mpe nazalaki koloba na bino ntango inso, kasi bino boyokaki ngai te.
Jere LinVB 25:4  Yawe ale­mbeki te kotindela bino basaleli ba ye banso baprofeta, kasi bino boli­ngaki koyoka te, botiaki matoi na maloba ma ngai te.
Jere LinVB 25:5  Balobaki na bino : Bobongola mitema, bolongwa o nzela ya masumu, botika misala mibe mya bino. Bobele bongo nde bokoki kofanda kimia o mabelé Yawe apesaki bino mpe bankoko ba bino seko.
Jere LinVB 25:6  Bolanda banzambe basusu te, bokumisa mpe bokumbamela bango te, botika kotumola ngai na bikeko bya bino, bongo nakosala bino mabe te.
Jere LinVB 25:7  Kasi botosaki ngai te, maloba ma Yawe, mpe botumolaki ngai na bikeko bya bino, bongo sikawa bozali koyoka mpasi.
Jere LinVB 25:8  Yango wana Yawe wa bokasi bo­nso alobi boye : Awa boyokaki maloba ma ngai te,
Jere LinVB 25:9  nakotinda Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon mpe mosaleli wa ngai, akende kobyanga bato banso epai ya Nordi. Nakotinda bango o ekolo ya bino mpe o bikolo bya mpembeni. Nakotombela bino bobe mpe bokokoma ekolo ya makambo ma nsomo, bato banso bakofinga mpe bakoseke bino.
Jere LinVB 25:10  Bakoyemba epai ya bino nzembo ya esengo lisusu te ; elenge mobali akobenga elenge mwasi lisusu te, bakoyoka lisusu lokito la libanga te liye likonika fufu ; bakomono lisusu mwinda o kati ya ndako te.
Jere LinVB 25:11  Ekolo eye ekobeba, ekokoma mopotu mpenza. Mibu ntuku nsambo bato banso bakozala baombo ba mokonzi wa Babilon.
Jere LinVB 25:12  Kasi nsima ya mibu mina ntuku nsambo, nakotumbola mokonzi wa Babilon mpe ekolo ya ye mpo ya mabe basalaki, maloba ma Yawe. Nakotumbola mpe ba-Kaldea mpe nakokomisa ekolo ya ba­ngo mopotu mpenza.
Jere LinVB 25:13  Nakosala na ekolo eye makambo manso nasakoli sikawa, maye manso makomami o mo­nkanda moye. Maloba ma bokaneli bikolo bisusu, maye Yeremia asakolaki.
Jere LinVB 25:14  (Bango mpe bakokoma ba­o­mbo ba bakonzi banene mpe ba bikolo binene ; nakozongisela ba­ngo mabe basalaki.)
Jere LinVB 25:15  Yawe Nzambe wa Israel alobi na ngai boye : Kamata nkeni eye ya vino ya nkanda ya ngai mpe melisa yango bato ba bikolo binso esika nakotinda yo.
Jere LinVB 25:16  Bamele, balangwa mpe bakoma bilema mpo ya bato nakotinda na mopanga epai ya ba­ngo.
Jere LinVB 25:17  Nakamati nkeni o maboko ma Yawe mpe namelisi bato ba bikolo binso esika Yawe atindaki ngai :
Jere LinVB 25:18  bato ba Yeruzalem mpe ba bingumba bya Yuda, bakonzi na bankumu ba byango, nakokomisa byango mipotu mya nsomo ; bato banso bakoseke bango mpe bakotombela bango bobe, lokola emononi lelo ;
Jere LinVB 25:19  Farao, mokonzi wa Ezipeti, basaleli na bankumu ba ye, bato ba ye banso,
Jere LinVB 25:20  mpe bampaya banso : bakonzi ba mokili mwa Us, bakonzi ba mokili mwa ba-Filisti, Askelon, Gaza, Ekron na baye bakotikala o Asdod,
Jere LinVB 25:22  bakonzi ba Tiro, ba Sidoni mpe ba bisanga o ngambo ya mbu,
Jere LinVB 25:23  bato ba Dedan, Tema, Buz mpe bato banso bakati mandefu,
Jere LinVB 25:24  bakonzi ba Arabu mpe bato banso bakofandaka o eliki,
Jere LinVB 25:26  na bakonzi bauti o Nordi, bazala mosika to penepene, nakomelisa bango moko moko nkeni ena. Kasi mokonzi wa Sesak (Babilon) akomele nsima ya bango.
Jere LinVB 25:27  Loba na bango : Yawe wa bokasi bonso, Nzambe wa Israel, alobi boye : Bomele, bolangwa, bosanza, bokweya mpe boteleme lisusu te, mpo ya bato ba mopanga nakoti­ndela bino.
Jere LinVB 25:28  Soko baboyi kokamata o maboko ma yo nkeni eye base­ngeli komele, okoloba na bango : Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Ata bolingi te, bokomele se bomeli.
Jere LinVB 25:29  Lokola nabandi kotumbola Engu­mba etangemi na nkombo ya ngai, bokanisi ’te bino bokobika ? Te ! Bo­kobika te, mpo ngai moko nakotinda bato ba mopanga epai ya bato ba nse mobimba. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso.
Jere LinVB 25:30  Yo okosakola na bango maloba mana manso, okoloba na bango : Ut’o likolo Yawe akoganga, ut’o mboka ya ye esantu akoto­mbola lolaka la ye, akogangela bato ba engumba ya ye, akogangela bato banso ba nse lokola baye bakokamolaka mbuma ya vino o ekamelo.
Jere LinVB 25:31  Lokito lokokoma tee nsuka ya nse, zambi Yawe akosambisa bato ba­nso ba nse, akokata likambo lya bato banso, akokaba basumuki mpo ’te bakufa na mopanga. Yawe alobi bongo.
Jere LinVB 25:32  Yawe wa bokasi bonso alobi : Mpasi ekokwela ekolo yoko yoko, lokola ekumbaki euti epai ya nsuka ya mokili.
Jere LinVB 25:33  O mokolo mona bibembe bya bato Yawe abomaki bikolala bipai binso o mokili mobimba. Bakolela bango te, bakolokoto bango te, bakokunda bango mpe te. Bakotikala kolala wana lokola bipolu bya bila­nga.
Jere LinVB 25:34  Bino bakengeli, bolela makasi, bo­ganga, bino bakambi ba etonga, bobili­ngana o mabelé, zambi mokolo bakoboma bino mo­lingi mokoka, bokokweya lokola mbeki ya motuya ibolani.
Jere LinVB 25:35  Bakengeli bakozwa esika ya kobombama lisusu te, bakambi ba etonga nde bakoki ko­kima lisusu te.
Jere LinVB 25:36  Boyoka boleli bwa bakengeli mpe bogangi bwa bakambi ba eto­nga, mpo Yawe abomi bitonga bya ba­ngo.
Jere LinVB 25:37  Bisobe kitoko biziki mpo ya nkanda enene ya Yawe !
Jere LinVB 25:38  Abimeli bango lokola nkosi ebimi o ebombelo ya yango, mpe mokili mwa bango mokomi mopotu mpo ya mopanga mozali koboma bato banso mpe mpo ya nkanda enene ya Yawe