Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JEREMIAH
Prev Up Next
Chapter 4
Jere LinVB 4:1  Yawe alobi boye : Yo Israel, soko olingi kozonga, zongela ngai. Soko olongoli biloko bya yo bya nsomo, soko okimi ngai lisusu te,
Jere LinVB 4:2  soko olayi ndai na nkombo ya Yawe wa bomoi, na bosolo, na mayele malamu mpe na bosembo, bato ba bikolo binso bakozwa bolamu mpe bakoyoka esengo mpo ya yo.
Jere LinVB 4:3  Yawe alobi na bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem : Bokata bilanga bya bino, bolona mbuma o kati ya nzube te.
Jere LinVB 4:4  Bino bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem, bokata nzoto mpo ya Yawe, bolongola mpe mbindo o mitema mya bino. Soki te, nkanda ya ngai ekongala lokola móto, moye moto moko akokoka kozimisa te, mpo ya makambo mabe ma bino.
Jere LinVB 4:5  Bosakola o Yuda, bosangela bato ba Yeruzalem ! Bobete mindule o ekolo, boganga makasi, boloba : « Tosangana banso ! Tokima o bibombamelo bya biso ! »
Jere LinVB 4:6  Botombola bendele epai ya Sion ! Bokima ! Boteleme o nzela te ! Mpamba te, ut’o Nordi nakoti­ndela bino likambo lya mpasi, likambo lya nsomo enene !
Jere LinVB 4:7  Lokola nkosi ebimi o mobenga mwa yango, mobebisi wa bikolo abimi o esika ya ye mpe azali koya mpo ’te abebisa ekolo ya yo, atumba bingumba bya yo mpe akimisa bato banso.
Jere LinVB 4:8  Yango wana bolata ngoto, bolela mpe boganga, zambi nkanda enene ya Yawe elo­ngwi epai ya biso te.
Jere LinVB 4:9  Yawe alobi : O mokolo monamei mpiko ekolongwa o motema mwa mokonzi na basali ba ye, banganga Nzambe bakokamwa mpenza, baprofeta bakoyoka nsomo.
Jere LinVB 4:10  Bakoloba : « E Mokonzi Yawe, okosi bato ba ekolo ya yo mpe ba Yeruzalem na bolobi ’te ‘Bokozwa kimia’, nzokande mopanga molingi mosilisa biso. »
Jere LinVB 4:11  O mikolo mina bakoloba na bato baye mpe na Yeruzalem : Mompepe mwa móto mokouta o ngomba mpe o eliki, mokoya kopepela bato ba ekolo ya ngai, mpo ya kopupola to kopetola ba­ngo te !
Jere LinVB 4:12  Nakotindela bango ekumbaki, sikawa ngai moko nakosambisa ba­ngo !
Jere LinVB 4:13  Tala, mobebisi azali koya lokola mampata, makalo ma ye mazali kopimbwa lokola eku­mbaki, farasa ya ye ileki bingondo na mba­ngu. Mawa na biso e ! Tobebi nye !
Jere LinVB 4:14  E Yeruzalem, longola mabe ma­nso o motema mpo ’te okoka kobika. Kin’o mokolo nini okozala na ma­kanisi mabe o motema ?
Jere LinVB 4:15  Ut’o mokili mwa Dan bakomi kosakola nsango ena, ut’o ngomba ya Efraim bayebisi nsango eye ya mpasi.
Jere LinVB 4:16  Bosakola mpe boyebisa bato ba ekolo ya Yuda, bokebisa bato ba Yeruzalem : banguna bakouta o ekolo mosika, bakoyokisa bingumba bya Yuda migango mya etumba.
Jere LinVB 4:17  Banguna bakozinga byango lokola bakengeli ba bilanga, mpo bato ba byango batombokeli ngai, maloba ma Yawe.
Jere LinVB 4:18  Yango ekweli yo mpo ya ezalela mpe bikela bya yo. Tala, bololo bwa mabe ma yo bozokisi motema mwa yo.
Jere LinVB 4:19  Libumu lizalaki koswa, nayoki mpasi mpenza, motema mwa ngai molingi mopa-swana, nakoki kokanga monoko lisusu te, mpo nayoki ’te babeti mondule, nayoki mpe bogangi bwa etumba.
Jere LinVB 4:20  Bayebisi bobele makambo ma nso­mo, solo, ekolo mobimba ebebi, na mbalakaka biema bya ngai bibebi, ná bibombamelo bya ngai.
Jere LinVB 4:21  Mikolo boni naino nakomono be­ndele mpe nakoyoka lokito la mondule ?
Jere LinVB 4:22  Solo, bato ba ngai bazali bazoba, bayebi ngai te, bazali na mayele te, bayebi eloko te ; bazali se na mayele ma kosala mabe, bayebi kosala malamu te.
Jere LinVB 4:23  Namoni ’te o nse ekomi mobulu, o likolo moi molimwi.
Jere LinVB 4:24  Namoni ’te ngomba izalaki kole­nge, ngomba ike inso izalaki koningana.
Jere LinVB 4:25  Namoni moto moko lisusu te, ata ndeke inso ikimi.
Jere LinVB 4:26  Namoni ’te bilanga bikomi biliki, bingumba binso bibebi, mpo ya nkanda enene ya Yawe.
Jere LinVB 4:27  Yawe alobi boye : Nse mobimba ebebi nye, binso bizali wana nakosilisa bya­ngo.
Jere LinVB 4:28  Yango wana mokili mokozala na mawa mpe likolo likoinda ! Nakati likambo, nakobongola maloba te, nakani mokano mpe nakozonga nsi­ma te.
Jere LinVB 4:29  Ntango bayoki basoda ba farasa mpe ba litimbo, bato ba engumba bakimi. Bakoti o zamba, bakei kobombama o mabanga ma ngomba, mboka inso ikomi mpamba, moto moko atikali wana te.
Jere LinVB 4:30  Bongo okosala nini ? Ata olati bilamba bya longondo, ata okembisi nzoto na biloko bya wolo, ata opakoli langi mpembeni ya mi­so, omikembisi se mpamba. Baye balingaki yo, baboyi yo, balingi liwa lya yo.
Jere LinVB 4:31  Nayoki boleli lokola mwasi alingi abota, bogangi bwa mama aboti mbala ya liboso : ezali bogangi bwa elenge mwasi wa Sion, akimeli mpe atandi maboko : « Mawa na ngai e ! Nakufi e ! Bato balingi koboma ngai ! »