Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JEREMIAH
Prev Up Next
Chapter 1
Jere LinVB 1:1  Maloba ma Yeremia, mwana wa Kilkia, nganga Nzambe wa Anatot, o mokili mwa Benyamin.
Jere LinVB 1:2  Yawe azalaki koloba na ye o mikolo mya Yozia, mwana wa Amon, mokonzi wa Yuda, o mobu mwa zo­mi na misato mwa bokonzi bwa ye.
Jere LinVB 1:3  Na nsima Yawe azalaki koloba na ye o mikolo mya Yoyakim, mwa­na wa Yozia, mokonzi wa Yuda kin’o nsuka ya mobu mwa zomi na moko mwa Sedekia, mwana wa Yozia, mokonzi wa Yuda. O nta­ngo ena bakangaki bato ba Yeruzalem mpe bakendeki na bango o boombo o sanza ya itano.
Jere LinVB 1:5  Yambo ’te nabongisi yo o libumu lya mama nasilaki koyeba yo, yambo ’te obotama nasilaki kopono yo ozala wa ngai. Nakomisi yo profeta wa bato ba bikolo.
Jere LinVB 1:6  Nalobi : « E Mokonzi Yawe, nayebi koloba te, nazali se mwana moke. »
Jere LinVB 1:7  Yawe alobi : Tika koloba : « Nazali se mwana », kasi kende epai ya bato banso nakotinda yo, sakola maloba manso nakoyebisa yo.
Jere LinVB 1:8  Obanga bango te, zambi ngai nazali na yo mpo ya ko­batela yo. Maloba ma Yawe.
Jere LinVB 1:9  Yawe atandi loboko, asimbi monoko mwa ngai, alobi : Tala, nakotia maloba ma ngai o monoko mwa yo.
Jere LinVB 1:10  Yeba ’te banda lelo nakopesa yo bokonzi o bikolo binso mpe o mikili minso, mpo ya kopikola minsisa mpe kobuka bitapi, mpo ya kobebisa mpe mpo ya kosilisa, mpo ya kotonga mpe mpo ya kolona lisusu.
Jere LinVB 1:11  Yawe atuni ngai : « Yeremia, ozali komono nini ? » Nayanoli : « Namoni etapi ya nzete ya lidame. »
Jere LinVB 1:12  Yawe alobi na ngai : « Omoni malamu, nazali kokengele liloba lya ngai mpo ’te nakokisa lyango. »
Jere LinVB 1:13  Mbala ya ibale Yawe atuni ngai : « Ozali komono nini ? » Nazongisi : « Namoni lisasu lya mai mazali kotoko likolo lya móto, lisasu liye litengemi, liuti o Nordi. »
Jere LinVB 1:14  Yawe alobi na ngai : Malozi makouta o Nordi, makokwela bato banso ba ekolo eye ;
Jere LinVB 1:15  yango wana nakobenga bakonzi banso ba mabota ma Nordi, maloba ma Yawe. Moko moko akotia ngwende ya ye pene na bizibeli bya Yeruzalem, o nse ya mapango mazingi engu­mba mpe o boso bwa mboka inso ya Yuda.
Jere LinVB 1:16  Nakosambisa ba-Yuda mpo ya mabe basalaki, zambi batikaki ngai, batumbelaki banzambe basusu mpaka ya malasi, mpe bakumbelaki bikeko basalaki na maboko ma bango moko.
Jere LinVB 1:17  Bongo yo, kanga nkamba o loketo, teleme mpe yebisa bango makambo manso nakotinda yo. Obanga bango te, soki te, ngai nakobangisa yo o miso ma bango.
Jere LinVB 1:18  Lelo nakomisi yo bo ebombamelo, likonzi lya ebende, lopango la mbengi o miso ma ekolo eye mobimba : bakonzi ba Yuda, bankumu na banganga Nzambe mpe ma bato banso ba ekolo.
Jere LinVB 1:19  Bakobundisa yo, kasi bakokoka yo te, zambi ngai nazali na yo mpo nabikisa yo. Maloba ma Yawe. Israel atosi Yawe te