JEREMIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
Chapter 12
Jere | LinVB | 12:1 | E Yawe, oleki bosembo, nakoki kolonga o miso ma yo te. Nzokande nalingi kotuna yo mwa mituna : Mpo nini makambo ma bato babe makotambola malamu ? Mpo nini basumuki banso bakofandaka na boboto ? | |
Jere | LinVB | 12:2 | Yo moto oloni bango, babimisi minsisa, bakoli malamu mpe bakobotaka mbuma. Bakokumisaka yo na monoko, kasi o kati ya motema bakondimaka yo te. | |
Jere | LinVB | 12:3 | Yo Yawe oyebi ngai, ozali komono ngai, oyebi ’te makanisi ma ngai mazali se epai ya yo. Benda bato babe lokola mpata o esika ya koboma ; bomba bango wana tee mokolo mwa koboma mokoki. | |
Jere | LinVB | 12:4 | (Kin’o mokolo nini mokili mokotikala na mawa, mpe matiti makokauka o esobe ? Nyama na ndeke ikokufaka mpo ya mabe ma bato,) zambi bakolobaka : « Yawe akomono makambo ma biso te. » | |
Jere | LinVB | 12:5 | Soko kolanda bato ba makolo ekolembisaka yo, boniboni okokoka kolanda baye bakotambwisaka farasa ? Soko okoki kofanda o mokili mwa kimia te, boniboni okosala o kati ya matiti ma Yordane ? | |
Jere | LinVB | 12:6 | Ata bandeko ba yo, bana ba tata wa yo, bakokosaka yo. Ata bango bakotongoko yo mingi. Otia motema na bango te mpo ya maloba ma bango ma bondeko. | |
Jere | LinVB | 12:7 | Natiki mokili mwa ngai, naboyi bato ba ekolo ya ngai ; bato nazalaki kolinga mingi, nakabi bango o maboko ma banguna. | |
Jere | LinVB | 12:8 | Bato ba ekolo ya ngai bakomi lokola nkosi ya zamba, bagangeli ngai makasi, yango wana nayoki bango mpi ! | |
Jere | LinVB | 12:9 | Bato ba ngai bakomi nde lokola mbilikoko ezingami na kombekombe epai na epai ? Bokende kosangisa nyama inso ya zamba, bobenga yango iya kolia limpati ! | |
Jere | LinVB | 12:10 | Bakengeli ebele babebisi elanga ya ngai ya vino, banyati bilanga bya ngai, bakomisi elanga kitoko ya ngai eliki ya mawa. | |
Jere | LinVB | 12:11 | Babongoli yango mokili mwa mawa, namoni ’te ebebi nye. Mokili mobimba mobebi mpenza, mpe moto moko te apangani na yango ! | |
Jere | LinVB | 12:12 | Babebisi bayei o nzela inso ya eliki. Mopanga mwa Yawe mokosilisa binso, o ekolo mobimba moto moko akofanda lisusu kimia te. | |
Jere | LinVB | 12:13 | Balonaki mbuma ya mampa, babuki se nzube ; bamilembisi se mpamba ; bayoki nsoni na mwa mbuma babuki, mpo ya nkanda enene ya Yawe. | |
Jere | LinVB | 12:14 | Yawe alobi boye : Nakobengana o ekolo ba bango bato babe banso bafandi penepene na bato ba ngai, baye babebisi ekolo eye napesaki bato ba ngai ba-Israel. Nakolongola mpe bato ba Yuda o mokili mwa bango. | |
Jere | LinVB | 12:15 | Kasi na nsima, awa nabimisi bango banso o mboka ya bango, nakoyokela bango lisusu mawa mpe nakozongisa bango o ekolo mpe o mabelé ma bango moko moko. | |
Jere | LinVB | 12:16 | Balakisaki bato ba ngai kolaya ndai na nkombo ya Baal, kasi sikawa soko bayekoli kozala bato ba ngai mpe kolaya ndai na nkombo ya ngai Nzambe wa bomoi, bakozwa lisusu esika ya kotonga ndako o ekolo ya ngai. | |