Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JEREMIAH
Prev Up Next
Chapter 31
Jere LinVB 31:1  Yawe alobi boye : O nta­ngo ena nakozala Nzambe wa mabota manso ma Israel, mpe bango bakozala bato ba ngai.
Jere LinVB 31:2  Yawe alobi boye : Bato bakufaki na mopanga te, bazwi bolamu o eliki. Israel akozwa esika ya boboto.
Jere LinVB 31:3  Yawe amilakisi na ngai mosika : Nalingi yo na bolingi bwa seko, nakoboya yo mokolo moko te.
Jere LinVB 31:4  Nakotonga yo lisusu, Israel. Basi ba yo bakobete mbonda lisusu mpe bakobina lisusu na esengo.
Jere LinVB 31:5  Okolona lisusu nzete ya vino o ngomba ya Samaria, baye balonaki bakobuka mbuma ya yango.
Jere LinVB 31:6  Mokolo mokoya ’te bakengeli bakoganga o ngomba ya Efraim : « Boteleme ! Tobuta ngomba Sion, epai ya Yawe, Nzambe wa biso ! »
Jere LinVB 31:7  Mpo Yawe alobi boye : Boyemba nzembo ya esengo mpo ya ekolo ya Yakob ! Bosepela mpo ya moyangeli wa bikolo ! Boganga mpe bokumisa, bosakola boye : « Yawe abikisi bato ba ye, abikisi baye batikali o Israel. »
Jere LinVB 31:8  Ngai moto nakokamba bango ut’o Nordi, nakosangisa bango ut’o nsuka ya mokili : baye bakufa miso, baye bakufa ma­kolo, basi bazali na zemi mpe baye bazali kobota ; ezali limpinga linene lya bato bakozonga.
Jere LinVB 31:9  Bakendeki na mawa, kasi nakozongisa bango na esengo, nakokamba bango epai ya miluka mitondi na mai, bakolanda nzela semba, esika bakotuta libaku te, zambi nazali tata wa Israel, Efraim azali mwana wa ngai wa yambo.
Jere LinVB 31:10  E bino bato ba bikolo, boyoka liloba lya Yawe ! Bosangela bato ba bisanga mosika : « Oyo apanzaki Israel, akosangisa bango, akokengele bango lokola moke­ngeli akokengeleke etonga ya ye. »
Jere LinVB 31:11  Yawe asikoli bato ba Yakob, abikisi bango o maboko ma moto aleki ye na nguya.
Jere LinVB 31:12  Bakoya na migango mya esengo o ngomba Sion, bakoya ebele mpo ’te bayamba ma­kabo ma Yawe : mbuma ya mampa, vino ya sika, mafuta, mpata na ngombe ; bakolenda lokola bilanga bya ndu­nda batii mai, esika mai makozanga mokolo mo­ko te.
Jere LinVB 31:13  Bilenge basi bakobina na nsai, bilenge babali na babange bakosepela. Nakobongola mawa ma bango ese­ngo, nakobondo bango, nsima ya mpasi nakosepelisa bango.
Jere LinVB 31:14  Nakokabela banganga Nzambe mafuta ma mabonza, bato ba ngai bakotonda na makabo ma ngai. Maloba ma Yawe.
Jere LinVB 31:15  Yawe alobi boye : Boyoka boleli bwa mawa o Ra­ma : Rakele moto aleli bana ba ye. Alingi te ’te babondo ye, mpo bana ba ye bazali lisusu te.
Jere LinVB 31:16  Yawe alobi boye : Tika kolela, longola mai o miso ! Mpasi ya yo ekobongwana esengo, bana ba yo bakozonga ut’o mokili mwa banguna. Maloba ma Yawe.
Jere LinVB 31:17  Okoki kotia elikya na mikolo mikoya, maloba ma Yawe, bana ba yo bakozonga o ekolo ya bango.
Jere LinVB 31:18  Nayoki bokimeli bwa ba-Efraim : « Opesaki ngai etumbu mpe na­ndimaki yango, lokola mwana wa ngombe ezangi botosi. Sala ’te nazonga, Yawe, mpo ozali Nzambe wa ngai !
Jere LinVB 31:19  Nabongoli motema, nayoki motema mawa, nayebi ’te nasali mabe, nayoki mawa manene, nayoki nsoni mpe nasambwi, namemi masumu ma bolenge bwa ngai ! »
Jere LinVB 31:20  Efraim azali mwana wa ngai wa bolingo, mwana oyo nakolingaka mingi ; mbala inso nakaneli ye, nakanisi ye mpe o kati ya motema nayokeli ye lisusu ngolu ; nalingi ye mingi mpenza. Maloba ma Yawe.
Jere LinVB 31:21  Tia bilembo, pika makonzi maye makolakisa nzela, tala malamu o nzela nini ozali kokende. Zonga, elenge mwasi wa Israel, zonga o bingumba bya yo !
Jere LinVB 31:22  Elenge mwasi motomboki, mikolo boni okoyengayenga naino ? Yawe akobimisa likambo lya sika o nse : mwasi akoluka bolongani wa ye.
Jere LinVB 31:23  Yawe wa bokasi bonso, Nza­mbe wa Israel, alobi boye : Mokolo nakobongisa bango lokola bazalaki liboso, bakoloba lisusu o bingumba binso bya Yuda : « Yawe abenisa yo, yo ndako ya bosembo, yo ngomba esantu ! »
Jere LinVB 31:24  O ekolo ena bato banso ba Yuda bakokende kofanda, bato ba bi­ngu­mba, ná baye bakokataka bila­nga ná baye bakobokoloko bibwele.
Jere LinVB 31:25  Nakolendisa baye balembi mpe nakomelisa baye bakufi na mposa ya mai.
Jere LinVB 31:26  Na yango nalamuki mpe namoni ’te mpongi elengi ekangaki ngai.
Jere LinVB 31:27  Yawe alobi boye : Mikolo mikoya nakotia lisusu bato na nyama ebele o Israel mpe o Yuda.
Jere LinVB 31:28  Liboso nazalaki kopikola mpe kokata, koboma, kosilisa mpe koyokisa mpasi ; sikawa nakokengele bango mpo bakoka kotonga mpe kolona. Maloba ma Yawe.
Jere LinVB 31:29  O mikolo mina bakoloba lisusu te : « Bato baliaki mbuma ya vino ibesu, mpe mino ma bana makomi ngai ! »
Jere LinVB 31:30  Soki te ! Moto na moto akokufa mpo ya mabe ma ye moko. Moto nyonso akolia mbuma ya vino ibesu, mino ma ye moko makokoma ngai.
Jere LinVB 31:31  Yawe alobi boye : Mikolo mikoya nakokata bondeko bwa sika na mabota ma Israel mpe ma Yuda.
Jere LinVB 31:32  Bondeko boye bokokesene na bo­ndeko nakataki na bankoko ba bango, ntango nasimbaki bango na loboko mpo ya kobimisa bango o Ezipeti. Bango babomaki bondeko bona, ata nazalaki mokonzi wa ba­ngo. Maloba ma Yawe.
Jere LinVB 31:33  Yawe alobi : Tala bondeko nakokata na bato ba Israel nsima ya mikolo mina : Nakotia Mobeko mwa ngai o mitema mya bango, mokokomama wana. Ngai nakozala Nzambe wa ba­ngo, mpe bango bakozala bato ba ngai.
Jere LinVB 31:34  Bongo moto bakosengela ko­teyana lisusu te ’te « Bomeka koyeba Yawe ! », mpo banso, bana na bakolo, bakoyeba ngai. Maloba ma Yawe. Nakolimbisa mabe ma ba­ngo, mpe nakokanisa masumu ma bango lisusu te.
Jere LinVB 31:35  Yawe moto alobi bongo, Oyo akeli mwese mpo ’te monge-nge na moi, sanza na minzoto mpo ’te mi­nge­nge na butu, oyo akoningisaka mai ma mbu mpe akoyokisaka lokito la mbo­nge : nkombo ya ye : Yawe wa bokasi bonso.
Jere LinVB 31:36  Soko ngai Yawe natiki kotala makambo mana, –maloba ma Yawe !– bato ba ngai ba Israel bakozala ekolo ya ngai lisusu te.
Jere LinVB 31:37  Yawe alobi boye : Lokola bakoki komeka bolai bwa likolo te, bosanda bwa makonzi ma nse mpe te, se bongo ngai nakoki koboya Israel seko te, ata asali mabe nini. Maloba ma Yawe.
Jere LinVB 31:38  Yawe alobi : O mikolo mikoya bakotonga engumba ya Yawe lisusu, ut’o linongi lya Kananel kin’o Ezibeli ya Litumu.
Jere LinVB 31:39  Bakotanda nsi­nga ekende semba kin’o ngomba Gareb mpo ya kokende epai ya Goa.
Jere LinVB 31:40  Lobwaku mobimba la bibembe mpe mputulu ya makala, manso mazali zongazonga na lo­bwaku la Kedron kin’o litumu lya Ezibeli ya Farasa epai ya Esti : ina inso ikozala mabelé masantu ma Yawe. Bakobuka to bakoboma ya­ngo mokolo moko lisusu te.