JEREMIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
Chapter 19
Jere | LinVB | 19:1 | Yawe alobi na Yeremia : Kende kosomba mbeki ya libazi epai ya mosali mbeki. Kende na bakolo ba mboka na banganga Nzambe basusu. | |
Jere | LinVB | 19:2 | Bima mpe kende o lobwaku la Ben-Inom, penepene na ‘Ezibeli ya Bipaso’. Sakola kuna maloba maye nakoyebisa yo. | |
Jere | LinVB | 19:3 | Okoloba boye : Bakonzi ba Yuda na bato ba Yeruzalem, boyoka liloba lya Yawe : Yawe wa bokasi bonso, Nzambe wa Israel alobi boye : Nakotindela esika eye likambo lya mpasi ; moto akoyoka yango, akoyoka matoi mpasi ! | |
Jere | LinVB | 19:4 | Mpamba te, batiki ngai mpe basantoli esika eye, babonzi wana mpaka ya malasi ona banzambe basusu, baye bango na bankoko na bakonzi ba Yuda bayebaki liboso te. Batondisi esika eye na makila ma bato basali likambo te. | |
Jere | LinVB | 19:5 | Batongi bitumbelo bya Baal mpo batumbela Baal bana ba bango bo libonza. Ngai nalobaki to natindaki yango te ; nakanisaki yango mokolo moko te. | |
Jere | LinVB | 19:6 | Yawe alobi boye : O mikolo mikoya bakotanga esika eye lisusu ‘Tofet’ to ‘Lobwaku la Ben-Inom’ te, kasi bakotanga yango ‘Lobwaku la Bobomi’. | |
Jere | LinVB | 19:7 | Bobele o esika eye nakobebisa mikano mya bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem ; nakobomisa bango na mopanga mwa banguna bakaneli bango ; bongo nakopesa bibembe bya bango bo bilei na ndeke ya likolo mpe na nyama ya zamba. | |
Jere | LinVB | 19:8 | Nakobongola engumba eye esika ya nsomo mpe eloko ya kotiola. Bato banso bakoleka wana bakoganga, bakokamwa na bomoni bato ebele bayoki mpasi. | |
Jere | LinVB | 19:9 | Nakosala ’te balia bana ba bango babali na basi : bakoliana o kati ya mpasi mpe ya mawa manene ; banguna baye balingi liwa lya bango bakoyokisa bango mpasi eye. | |
Jere | LinVB | 19:11 | okoloba na bango : Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Nakoboma bato ba ekolo na bato ba mboka eye lokola bakobolaka mbeki ya mosali mbeki, eye bakoki kobamba lisusu te. Bakokunda bibembe o Tofet, mpo bakozwa esika esusu te. | |
Jere | LinVB | 19:12 | Yawe alobi boye : Nakosala se bongo na esika eye mpe na bato bafandi wana, nakokomisa engumba eye lokola Tofet. | |
Jere | LinVB | 19:13 | Ndako inso ya Yeruzalem na ndako ya bakonzi ba Yuda ikokoma na mbindo lokola Tofet : ndako ina inso esika bazalaki kobonzela mampinga ma likolo mpaka ya malasi, mpe kosopela banzambe basusu mabonza ma bomeli ! | |
Jere | LinVB | 19:14 | Yeremia alongwi o Tofet esika Yawe atindaki ye asakola. Atelemi o lopango la Tempelo ya Yawe, alobi na bato banso : | |