JEREMIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
Chapter 25
Jere | LinVB | 25:1 | Liloba Yawe alobi na Yeremia litali bato banso ba Yuda. Ezalaki o mobu mwa minei Yoyakim, mwana wa Yozia, azalaki mokonzi o Yuda, mpe o mobu mwa yambo Nabukodonozor azalaki mokonzi wa Babilon. | |
Jere | LinVB | 25:3 | Banda mobu mwa zomi na misato mwa bokonzi bwa Yozia, mwana wa Amon, mokonzi wa Yuda, kin’o mokolo mwa lelo, ekoki sikawa mibu ntuku ibale na misato, Yawe alobaki na ngai mpe nazalaki koloba na bino ntango inso, kasi bino boyokaki ngai te. | |
Jere | LinVB | 25:4 | Yawe alembeki te kotindela bino basaleli ba ye banso baprofeta, kasi bino bolingaki koyoka te, botiaki matoi na maloba ma ngai te. | |
Jere | LinVB | 25:5 | Balobaki na bino : Bobongola mitema, bolongwa o nzela ya masumu, botika misala mibe mya bino. Bobele bongo nde bokoki kofanda kimia o mabelé Yawe apesaki bino mpe bankoko ba bino seko. | |
Jere | LinVB | 25:6 | Bolanda banzambe basusu te, bokumisa mpe bokumbamela bango te, botika kotumola ngai na bikeko bya bino, bongo nakosala bino mabe te. | |
Jere | LinVB | 25:7 | Kasi botosaki ngai te, maloba ma Yawe, mpe botumolaki ngai na bikeko bya bino, bongo sikawa bozali koyoka mpasi. | |
Jere | LinVB | 25:9 | nakotinda Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon mpe mosaleli wa ngai, akende kobyanga bato banso epai ya Nordi. Nakotinda bango o ekolo ya bino mpe o bikolo bya mpembeni. Nakotombela bino bobe mpe bokokoma ekolo ya makambo ma nsomo, bato banso bakofinga mpe bakoseke bino. | |
Jere | LinVB | 25:10 | Bakoyemba epai ya bino nzembo ya esengo lisusu te ; elenge mobali akobenga elenge mwasi lisusu te, bakoyoka lisusu lokito la libanga te liye likonika fufu ; bakomono lisusu mwinda o kati ya ndako te. | |
Jere | LinVB | 25:11 | Ekolo eye ekobeba, ekokoma mopotu mpenza. Mibu ntuku nsambo bato banso bakozala baombo ba mokonzi wa Babilon. | |
Jere | LinVB | 25:12 | Kasi nsima ya mibu mina ntuku nsambo, nakotumbola mokonzi wa Babilon mpe ekolo ya ye mpo ya mabe basalaki, maloba ma Yawe. Nakotumbola mpe ba-Kaldea mpe nakokomisa ekolo ya bango mopotu mpenza. | |
Jere | LinVB | 25:13 | Nakosala na ekolo eye makambo manso nasakoli sikawa, maye manso makomami o monkanda moye. Maloba ma bokaneli bikolo bisusu, maye Yeremia asakolaki. | |
Jere | LinVB | 25:14 | (Bango mpe bakokoma baombo ba bakonzi banene mpe ba bikolo binene ; nakozongisela bango mabe basalaki.) | |
Jere | LinVB | 25:15 | Yawe Nzambe wa Israel alobi na ngai boye : Kamata nkeni eye ya vino ya nkanda ya ngai mpe melisa yango bato ba bikolo binso esika nakotinda yo. | |
Jere | LinVB | 25:16 | Bamele, balangwa mpe bakoma bilema mpo ya bato nakotinda na mopanga epai ya bango. | |
Jere | LinVB | 25:17 | Nakamati nkeni o maboko ma Yawe mpe namelisi bato ba bikolo binso esika Yawe atindaki ngai : | |
Jere | LinVB | 25:18 | bato ba Yeruzalem mpe ba bingumba bya Yuda, bakonzi na bankumu ba byango, nakokomisa byango mipotu mya nsomo ; bato banso bakoseke bango mpe bakotombela bango bobe, lokola emononi lelo ; | |
Jere | LinVB | 25:20 | mpe bampaya banso : bakonzi ba mokili mwa Us, bakonzi ba mokili mwa ba-Filisti, Askelon, Gaza, Ekron na baye bakotikala o Asdod, | |
Jere | LinVB | 25:26 | na bakonzi bauti o Nordi, bazala mosika to penepene, nakomelisa bango moko moko nkeni ena. Kasi mokonzi wa Sesak (Babilon) akomele nsima ya bango. | |
Jere | LinVB | 25:27 | Loba na bango : Yawe wa bokasi bonso, Nzambe wa Israel, alobi boye : Bomele, bolangwa, bosanza, bokweya mpe boteleme lisusu te, mpo ya bato ba mopanga nakotindela bino. | |
Jere | LinVB | 25:28 | Soko baboyi kokamata o maboko ma yo nkeni eye basengeli komele, okoloba na bango : Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Ata bolingi te, bokomele se bomeli. | |
Jere | LinVB | 25:29 | Lokola nabandi kotumbola Engumba etangemi na nkombo ya ngai, bokanisi ’te bino bokobika ? Te ! Bokobika te, mpo ngai moko nakotinda bato ba mopanga epai ya bato ba nse mobimba. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. | |
Jere | LinVB | 25:30 | Yo okosakola na bango maloba mana manso, okoloba na bango : Ut’o likolo Yawe akoganga, ut’o mboka ya ye esantu akotombola lolaka la ye, akogangela bato ba engumba ya ye, akogangela bato banso ba nse lokola baye bakokamolaka mbuma ya vino o ekamelo. | |
Jere | LinVB | 25:31 | Lokito lokokoma tee nsuka ya nse, zambi Yawe akosambisa bato banso ba nse, akokata likambo lya bato banso, akokaba basumuki mpo ’te bakufa na mopanga. Yawe alobi bongo. | |
Jere | LinVB | 25:32 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Mpasi ekokwela ekolo yoko yoko, lokola ekumbaki euti epai ya nsuka ya mokili. | |
Jere | LinVB | 25:33 | O mokolo mona bibembe bya bato Yawe abomaki bikolala bipai binso o mokili mobimba. Bakolela bango te, bakolokoto bango te, bakokunda bango mpe te. Bakotikala kolala wana lokola bipolu bya bilanga. | |
Jere | LinVB | 25:34 | Bino bakengeli, bolela makasi, boganga, bino bakambi ba etonga, bobilingana o mabelé, zambi mokolo bakoboma bino molingi mokoka, bokokweya lokola mbeki ya motuya ibolani. | |
Jere | LinVB | 25:35 | Bakengeli bakozwa esika ya kobombama lisusu te, bakambi ba etonga nde bakoki kokima lisusu te. | |
Jere | LinVB | 25:36 | Boyoka boleli bwa bakengeli mpe bogangi bwa bakambi ba etonga, mpo Yawe abomi bitonga bya bango. | |