Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JEREMIAH
Prev Up Next
Chapter 34
Jere LinVB 34:1  Yawe alobi na Yeremia o ntango Nabukodonozor, mo­konzi wa Babilon, na limpinga lya ye mobimba mpe liye lya bako­nzi banso ba bikolo binso bya mokili mwa ye bazalaki kobundisa Yeru­zalem mpe bingumba bya penepene.
Jere LinVB 34:2  Yawe Nzambe wa Israel alobi boye : Kende koyebisa Sedekia, mokonzi wa Yuda : Yawe alobi : Nakokaba engumba eye o maboko ma mokonzi wa Babilon, mpe ye akotumba yango.
Jere LinVB 34:3  Okokima maboko ma ye te, kasi bakokanga yo mpe bakokaba yo na ye. Okoteleme o miso ma ye mpe okosolola na ye. Na nsima okokende o Babilon.
Jere LinVB 34:4  Kasi yoka liloba lya Yawe, yo Sedekia, mokonzi wa Yuda : Mpo ya yo Yawe alobi boye : Okokufa na mopanga te,
Jere LinVB 34:5  okokufa se na boboto. Lokola bazalaki kotumbela ba­nkoko ba yo, baye bazalaki bako­nzi liboso lya yo, mpaka ya malasi, se bongo bakotumbela yo mpaka ya malasi, bakoyembela yo mpe nze­mbo ya boleli ‘Mawa e, moko­nzi wa ngai !’ Ngai moto nayebisi bongo. Maloba ma Yawe.
Jere LinVB 34:6  Profeta Yeremia asakoli maloba mana manso o boso bwa Sedekia, mokonzi wa Yuda o Yeruzalem,
Jere LinVB 34:7  o ntango basoda ba mokonzi wa Babilon bazalaki kobunda mpo ya kobotolo Yeruzalem mpe bingu­mba bya Yuda, Lakis na Azeka, mpo bakokaki na bibombamelo biye naino te.
Jere LinVB 34:8  Yawe alobi na Yeremia liloba liye o ntango Sedekia ayokanaki na bato ba Yeruzalem ’te bakopesa baombo bonsomi :
Jere LinVB 34:9  moto na moto apesa baombo ba ye ba-Ebrei, babali na basi, bonsomi, moto moko atikala na ndeko wa ye mo-Yuda bo moombo lisusu te.
Jere LinVB 34:10  Bankumu na bato banso bayokanaki ’te bakotika baombo, bandimi kobikisa baombo ba bango, babali na basi.
Jere LinVB 34:11  Ka­si na nsima batiki mokano mona, bakangi lisusu babali na basi o boombo mpe batindi bango ’te basalela bango lisusu.
Jere LinVB 34:13  Ya­we Nzambe wa Israel alobi : O ntango nabimisaki bankoko ba bino o mokili mwa Ezipeti, esika bazalaki baombo, nakataki na bango bondeko boye :
Jere LinVB 34:14  « Nsima ya mibu nsambo inso moko moko wa bino apesa bonsomi na ndeko wa ye mo-Ebrei oyo asengelaki komiteka na ye. Akozala moombo wa yo mibu motoba, na nsima okozongisela ye bonsomi. » Kasi bankoko ba bino bayokaki ngai te, mpe batosaki ngai te.
Jere LinVB 34:15  Nzokande na nsima bobongolaki mitema, mpe bosalaki maye mazali semba o miso ma ngai : bosakolaki libiki lya baninga mpe bolayaki ndai o miso ma ngai o Tempelo eye ezali na nkombo ya ngai.
Jere LinVB 34:16  Kasi bobongoli makanisi ma bino lisusu, bosantoli nkombo ya ngai, bozongisi o boombo babali na basi, baye bozongiselaki bonsomi mpe botindi bango na makasi ’te bakoma baombo ba bino lisusu.
Jere LinVB 34:17  Yango wana Yawe alobi boye : Botosi ngai te awa boboyi kopesa ndeko to mo­ninga wa bino bonsomi. Tala bonsomi ngai nakopesa bino : Nakotindela bino mopanga, nzala ekasi na bokono bobe. Yawe alobi bo­ngo. Nakokomisa bino bo ndakisa ya nsomo o miso ma bikolo binso bya nse.
Jere LinVB 34:18  Bato baye babebisi bo­ndeko bwa ngai, batosi mibeko mya bondeko bona te lokola balayaki o miso ma ngai, nakosala na bango lokola na mwana wa ngo­mbe, eye bakokata na biteni bibale mpo baleka o kati ya biteni bina.
Jere LinVB 34:19  Bankumu ba Yuda mpe ba Yeruzalem, ba-eniki, banganga Nzambe na bakolo ba mboka banso baleki o kati ya biteni bibale bya mwana wa ngombe,
Jere LinVB 34:20  nakokaba bango o maboko ma ba­nguna balingi koboma bango ; bibembe bya bango bikozala bilei bya ndeke ya likolo mpe bya nyama ya zamba.
Jere LinVB 34:21  Nakokaba mpe Sedekia, mokonzi wa Yuda, na ba­nku­mu ba ye o maboko ma ba­nguna balingi koboma bango, mpe o maboko ma basoda ba mokonzi wa Babilon, baye basili bakei mosika na bino.
Jere LinVB 34:22  Yawe alobi boye : Tala, nakotinda bango ’te bazongela bino, babundisa, babotolo mpe batumba engu­mba eye. Nakokomisa bingumba bya Yuda mopotu, esika moto moko akofanda lisusu te.