JEREMIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
Chapter 43
Jere | LinVB | 43:2 | Azarya, mwana wa Osaya, na Yokanan, mwana wa Karea, na bato banso ba lolendo bagangeli Yeremia : « Ozali kobuka lokuta ! Yawe Nzambe wa biso atindi yo te mpo osakola ’te tokende kofanda o Ezipeti te. | |
Jere | LinVB | 43:3 | Baruk, mwana wa Neria, apesi yo mayele mabe, alingi kokaba biso o maboko ma ba-Kaldea mpo ’te baboma biso mpe bakende na biso o Babilon. » | |
Jere | LinVB | 43:4 | Yokanan, mwana wa Karea, bakomanda banso mpe bato banso baboyi kotosa Yawe, balingi kotikala o Yuda te. | |
Jere | LinVB | 43:5 | Yokanan, mwana wa Karea, na bakomanda banso ba basoda basangisi bato banso ba Yuda batikali, baye balongwaki o bikolo esika bapanzanaki mpe bazongaki mpo ’te bafanda o ekolo ya Yuda ; | |
Jere | LinVB | 43:6 | basangisi mpe babali, basi na bana, na bilenge basi ba mokonzi, na bato banso Nebuzaradan, komanda wa bakengeli, atikaki epai ya Godolia, mwana wa Akikam, nkoko wa Safan. Bakei mpe na profeta Yeremia na Baruk, mwana wa Neria. | |
Jere | LinVB | 43:9 | « Kamata mabanga manene o miso ma bato ba Yudea mpe kangisa mango o kati ya mabelé libazi, penepene na ezibeli ya ndako ya Farao o Tapanes. | |
Jere | LinVB | 43:10 | Na nsima okoloba na bato : Yawe wa bokasi bonso, Nzambe wa Israel, alobi : Tala, nakobenga mosaleli wa ngai Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon, aya awa mpe atonga ngwende ya ye o mabanga maye nakangisi awa, mpe akopika wana ema ya bokonzi bwa ye. | |
Jere | LinVB | 43:11 | Akoya mpe akobebisa mokili mwa Ezipeti : Oyo akoki na liwa, akufa ! Oyo akoki na boombo, akende o boombo ! Oyo akoki na mopanga, akufa na mopanga ! | |
Jere | LinVB | 43:12 | Akotumba tempelo inso ya banzambe ba Ezipeti, akotumba bikeko bya bango to akokende na byango ; akolongola bato banso o mokili mwa Ezipeti lokola mokengeli wa mpata akolongolaka nsili o monkoto mwa ye. Na nsima akobima wana na boboto. | |