JOSHUA
Chapter 18
Josh | LinVB | 18:1 | Ntango bana ba Israel banso basangani o Silo, batelemisi Ema ya Likita. Basili kolonga bato ba mokili mobimba. | |
Josh | LinVB | 18:3 | Yozue alobi na bango : « Mikolo boni bokozila mpo ya kozwa mokili moye Yawe Nzambe wa bankoko ba bino apesi bino ? | |
Josh | LinVB | 18:4 | Bopono bato basato o libota lyoko lyoko mpo ’te natinda bango. Bakende kokatisa mokili mpe bayebisa biso motindo mokili mozali mpo tokabolela mabota mwango ; na nsima bazonga epai ya ngai. | |
Josh | LinVB | 18:5 | Bakabola mokili na biteni nsambo. Yuda atikala o mokili mwa ye epai ya Sudi, mpe bana ba libota lya Yozefu batikala o mokili mwa bango epai ya Nordi. | |
Josh | LinVB | 18:6 | Bokoma o monkanda boniboni bokaboli mokili na biteni nsambo, mpe boyela ngai monkanda mona. Nakobete zeke mpo ya bino o miso ma Yawe Nzambe wa biso. | |
Josh | LinVB | 18:7 | Kasi ba-Levi bakozwa mabelé o kati ya bino te, mpo lisango lya bango lizali bonganga bwa Yawe. Bato ba Gad mpe ba Ruben, mpe ndambo ya libota lya Manase basili kozwa mabelé o ngambo ya Yordane, maye Moze mosaleli wa Yawe apesaki bango. » | |
Josh | LinVB | 18:8 | Bato batelemi mpe bakei. Na baye bakei kotala mokili Yozue alobi : « Bokende kokatisa mokili, bokoma manso o monkanda mpe bozonga epai ya ngai, mpe nakobete zeke mpo ya bino o miso ma Yawe, awa o Silo. » | |
Josh | LinVB | 18:9 | Bato bakei, bakatisi mokili, bakomi manso o monkanda, bakaboli mboka inso na biteni nsambo. Na nsima bazongi epai ya Yozue o nganda ya Silo. | |
Josh | LinVB | 18:10 | Yozue abeti zeke mpo ya bango o miso ma Yawe o Silo. Mpe Yozue akaboleli bana ba Israel mabelé, engebene na mabota ma bango. | |
Josh | LinVB | 18:11 | Zeke elakisi libota lya bana ba Benyamin engebene na bituka bya bango. Bazwi mabelé kati ya bana ba Yuda na bana ba Yozefu. | |
Josh | LinVB | 18:12 | Epai ya Nordi, mokili mwa bango mobandi o Yordane, leka mpembeni ya Yeriko epai ya Nordi, landa ngomba epai ya Westi mpo ya kosuka o Bet-Aven o eliki. | |
Josh | LinVB | 18:13 | Leka lisusu o Luz, epai ya Sudi mpe koma o Betel ; leka lisusu o Atro-Arak o ngomba ezali o Sudi ya Bet-Oron o nse. | |
Josh | LinVB | 18:14 | Bongwana epai ya Westi na Sudi banda ngomba eye etalani na Bet-Oron o Sudi mpo ya kosuka o Kiriat-Baal, mboka ya bana ba Yuda, eye batangi lelo Kiriat-Yearim. Ndelo epai ya Westi, yango eye. | |
Josh | LinVB | 18:15 | Epai ya Sudi landa Kiriat-Yearim, pusa epai ya Westi mpe kende o liziba lya mai ma Neftoa, | |
Josh | LinVB | 18:16 | na nsima kita epai ya nsuka ya ngomba eye etalani na lobwaku la Bet-Inom o esobe ya ba-Refaim epai ya Nordi ; na nsima kita o lobwaku la Inom, epai ya Sudi ya mboka ya ba-Yebus mpo ya kosuka o En-Rogel. | |
Josh | LinVB | 18:17 | Na nsima bongwana epai ya Nordi mpo ya kosuka o En-Semes mpe o Gelilot penepene na ngomba Adumim ; na nsima leka o Libanga lya Boan, mwana wa Ruben. | |
Josh | LinVB | 18:19 | Kende lisusu o Nordi ya Bet-Ogla mpo ya kosuka o esika ndambo ya mokili ezingami na mbu ya Mongwa, epai ya Nordi, esika ebale Yordane esuki. Ndelo epai ya Sudi, yango eye. | |
Josh | LinVB | 18:20 | Epai ya Esti mokili mwa bango mobandi o Yordane. Mabelé ma bana ba Benyamin, engebene na bituka bya bango, mango mana. | |
Josh | LinVB | 18:21 | Nkombo ya mboka ya libota lya bana ba Benyamin, engebene na bituka bya bango yango iye : Yeriko, Bet-Ogla, Emek-Kesis, | |