JUDGES
Chapter 16
Judg | LinVB | 16:2 | Bayebisi bato ba Gaza likambo lina, balobi : « Samson ayei. » Bato ba Gaza balali te, bazalaki konongo ye butu mobimba penepene na ezibeli ya mboka. Butu mobimba batikali nye, balobani : « Etani ntongo, tokoboma ye. » | |
Judg | LinVB | 16:3 | Kasi Samson alali se wana tee o kati ya butu ; na nsima atelemi mpe akangi mabaya manene ma makonzi ma ezibeli ya mboka, abakoli mango elongo na bibende bikangisi ezibeli ; atii mango o mapeke mpe akei na mango o nsonge ya ngomba penepene na Ebron. | |
Judg | LinVB | 16:4 | Nsima yango Samson akomi kolinga mwasi moko o mboka yoko epai ya lobwaku la Sorek ; nkombo ya mwasi Dalila. | |
Judg | LinVB | 16:5 | Bankumu ba Filisti bakei kotala mwasi, balobi na ye : « Meka kozwa motema mwa ye, ayebisa yo mpo nini azali na nguya enene, oyeba mpe ndenge nini tokoki kolonga ye mpo ’te tokanga ye na nsinga mpe tosilisa bokasi bwa ye. Biso banso moko moko tokopesa yo mitako mya palata nkoto yoko na monkama. » | |
Judg | LinVB | 16:6 | Dalila alobi na Samson : « Nabondeli yo, yebisa ngai mpo nini ozali na nguya enene boye, yebisa ngai boniboni bakoki kokanga yo na nsinga mpe kosilisa bokasi bwa yo. » | |
Judg | LinVB | 16:7 | Samson azongisi : « Soko bakangi ngai na nsinga nsambo ya litimbo, nsinga ya sika, ikauki naino te, bokasi bwa ngai bokosila mpe nakokoma lokola bato banso. » | |
Judg | LinVB | 16:8 | Bankumu ba Filisti bapesi Dalila nsinga nsambo ya litimbo, nsinga ya sika ikauki naino te. Dalila akangi ye na nsinga ina. | |
Judg | LinVB | 16:9 | Bato babombami o ndako ya ye ya kolala. Na nsima Dalila agangi : « Samson ee, ba-Filisti bayeli yo ! » Samson akati nsinga ya litimbo lokola nsinga ya ntokia eziki na móto. Bongo ntina ya nguya ya ye eyebani te. | |
Judg | LinVB | 16:10 | Dalila alobi na Samson : « Okosi ngai, obukeli ngai lokuta. Yebisa ngai ndenge nini bakoki kokanga yo. » | |
Judg | LinVB | 16:11 | Ayanoli : « Soko bakangi ngai na mikulu mya sika, esali naino mosala te, bokasi bwa ngai bokosila mpe nakokoma lokola bato banso. » | |
Judg | LinVB | 16:12 | Dalila akamati mikulu mya sika akangi ye mpe agangi : « Samson ee, ba-Filisti bayeli yo ! » Bato babombami o ndako ya ye ya kolala, kasi Samson akati mikulu mikangaki maboko ma ye lokola bakokataka nsinga ya bilamba. | |
Judg | LinVB | 16:13 | Dalila alobi na Samson : « Ozali kokosa ngai mpe kobukela ngai lokuta. Yebisa ngai ndenge nini bakoki kokanga yo. » Samson ayanoli : « Soko okamati maboto nsambo ma nsuki ya ngai mpe okangi mango na monyololo mwa etongeli ya bilamba, bokasi bwa ngai bokosila mpe nakokoma lokola bato banso. » | |
Judg | LinVB | 16:14 | Ezalaki ye kolala mpongi, Dalila akangi nsuki ya ye na monyololo mwa etongeli ya bilamba mpe agangi : « Samson ee, ba-Filisti bayeli yo ! » Samson alamuki mpe abendi monyololo na etongeli ya bilamba mobimba. | |
Judg | LinVB | 16:15 | Dalila alobi na ye : « Boniboni okoki koloba ’te olingi ngai, awa opesi ngai motema mwa yo te ? Osili kokosa ngai mbala isato mpe oboyi koyebisa ngai mpo nini ozali makasi mingi. » | |
Judg | LinVB | 16:16 | Azalaki kotunatuna ye bongo mokolo na mokolo mpe kotungisa ye na maloba ma ye. Samson alembi, mayele ma ye matamboli. | |
Judg | LinVB | 16:17 | Bongo ayebisi ye makambo manso mazalaki o motema, alobi : « Etebu ekokoli motó mwa ngai mokolo moko te, zambi babonzaki ngai na Nzambe ntango nazalaki o libumu lya mama. Soko bakokoli ngai nsuki, bokasi bwa ngai bokosila mpe nakokoma lokola bato banso. » | |
Judg | LinVB | 16:18 | Dalila amoni ’te mbala eye Samson ayebisi ye makambo ma solo. Abengi bankumu ba Filisti, alobi na bango : « Boyaka sikawa, zambi ayebisi ngai makambo ma solo. » Bongo bankumu ba Filisti bayei, mosolo o maboko. | |
Judg | LinVB | 16:19 | Ntango Dalila alalisi Samson mpongi o bibelo bya ye, abengi moto moko mpo ya kokata milongo nsambo mya nsuki ya ye. Bokasi bwa ye bobandi kosila mpe nguya elongwi epai ya ye. | |
Judg | LinVB | 16:20 | Dalila agangi : « Samson ee ! Ba-Filisti bayeli yo ! » Samson alamuki, amilobeli : « Nakobika lokola nabikaki mbala isusu mpe nakokima bango. » Kasi ayebi te ’te Yawe atiki ye. | |
Judg | LinVB | 16:21 | Ba-Filisti bakangi ye mpe batoboli ye miso. Bakei na ye o mboka Gaza mpe bakangi ye na minyololo mya mbengi mibale. Bakotisi ye o boloko mpe bapesi ye mosala mwa kopusa libanga likonika mbuma ya mampa. | |
Judg | LinVB | 16:23 | Bankumu ba Filisti bayei kosangana mpo ya kobonzela nzambe wa bango Dagon libonza linene mpe mpo ya kosepela ; balobi : « Nzambe wa biso akabi monguna wa biso Samson o maboko ma biso. » | |
Judg | LinVB | 16:24 | Awa bato bamoni Samson, bakumisi nzambe wa bango, bayembi : « Nzambe wa biso akabeli biso monguna oyo azalaki kobebisa mokili mwa biso mpe koboma bato baike. » | |
Judg | LinVB | 16:25 | Ezalaki bango kosepela, balobi : « Boyela biso Samson aya kosekisa biso. » Babimisi Samson o boloko. Abandi kosekisa bango na masano ma ye ; na nsima batii ye o kati ya makonzi ma tempelo. | |
Judg | LinVB | 16:26 | Samson alobi na elenge mobali oyo asimbi ye na loboko : « Kamba ngai nasimba makonzi ma tempelo, napema mwa moke. » | |
Judg | LinVB | 16:27 | Tempelo etondaki na bato, babali na basi. Ezalaki wana bankumu banso ba Filisti ; o motondo mwa ndako mpe, babali na basi soki nkoto isato, bazalaki kotala masano ma Samson. | |
Judg | LinVB | 16:28 | Samson abeleli Yawe, alobi : « E Mokonzi Yawe, nabondeli yo, kanisa ngai mpe mbala eye pesa ngai naino nguya nazongisela ba-Filisti mabe basalaki ngai na bobomi miso ma ngai mabale. » | |
Judg | LinVB | 16:29 | Na nsima Samson asimbi makonzi mabale, maye mazali kokumba tempelo. Atindisi likonzi lyoko na loboko la mobali, likonzi lisusu na loboko la mwasi. | |
Judg | LinVB | 16:30 | Samson akanisi : « Tika nakufa elongo na ba-Filisti. » Mpe na nguya ya ye inso atindisi makonzi, tempelo ebukani, ekweli bankumu na mpe bato banso bazalaki wana. Bato baye abomi mokolo akufi baleki baye abomaki ntango azalaki na bomoi. | |