MATTHEW
Chapter 6
Matt | LinVB | 6:1 | Bókéba ’te bóluka kobénda míso ma bato té na malámu bokosála ; sókí té, bokozwa mbano té o mbóka ya Tatá wa bínó o likoló. | |
Matt | LinVB | 6:2 | Bôngó, sókó olingí kokabela moto wa mawa elóko, óbéte mondúle o bosó bwa yǒ té. Bakíbisi bakosálaka bôngó o sinagóga mpé o balabála mpô ’te bato bákúmisa bangó. Ya sôló, nayébísí bínó : basílí bazwí mbano ya bangó. | |
Matt | LinVB | 6:3 | Kasi yǒ, sókó okabélí moto wa mawa elóko na lobóko la mobáli, lobóko la mwásí lóyéba yangó té, | |
Matt | LinVB | 6:4 | mpô ’te likabo lya yǒ límónono na bato té ; mpé Tatá wa yǒ, óyo akomónoko maye mabómbámí, akofúta yǒ. | |
Matt | LinVB | 6:5 | Mpé sókó bosámbélí, bósála lokóla bakíbisi té : mpô ya kosámbela, balingí kotéleme o sinagóga mpé o bisíká balabála íbalé ikútání mpô ’te bato bámóno bangó. Ya sôló, nayébísí bínó : basílí bazwí mbano ya bangó. | |
Matt | LinVB | 6:6 | Kasi yǒ, ntángo olingí kosámbela, yíngélá o káti ya ndáko, kangá ezibeli malámu, mpé sámbélá Tatá wa yǒ óyo amónóní té ; mpé yě, Tatá wa yǒ óyo akomónoko maye mabómbámí, akofúta yǒ. | |
Matt | LinVB | 6:7 | Sókó bozali kosámbéla, bóloba maloba míngi míngi té lokóla bapagáno. Bangó bakanísí ’te Nzámbe akondimela bangó nokí sókó balobí míngi. | |
Matt | LinVB | 6:8 | Bósálaka lokóla bangó té, zambí libosó ’te bósénge yě, Tatá wa bínó asílí ayébí eye esengélí na bínó. | |
Matt | LinVB | 6:14 | Ya sôló, sókó bolímbísí báníngá mabé maye basálí bínó, Tatá wa bínó azalí o likoló akolímbisa bínó lokóla. | |
Matt | LinVB | 6:15 | Kasi sókó bolímbísí báníngá té, Tatá wa bínó akolímbisa mabé ma bínó mpé té. Boláli nzala | |
Matt | LinVB | 6:16 | Sókó bolálí nzala, bólakisa elongi ya mawa té, lokóla bakíbisi bakosálaka ; bakolakisaka bilongi bya mawa mawa mpô ’te bato bámóno malámu ’te bazalí kolála nzala. Ya sôló, nayébísí bínó : basílí bazwí mbano ya bangó. | |
Matt | LinVB | 6:18 | mpô ’te bato báyéba té ’te ozalí kolála nzala ; bobélé Tatá wa yǒ, óyo amónóní té, áyéba ; mpé yě Tatá wa yǒ, óyo akomónoko maye mabómbámí, akofúta yǒ. | |
Matt | LinVB | 6:19 | Bómíbómbela nkita áwa o nsé té : ikobéba na mbombó mpé na nkusú, tǒ bayíbi bakobúka ndáko mpé bakoyíba yangó. | |
Matt | LinVB | 6:20 | Kasi bómíbómbela nkita o likoló, esíká ekobéba té na mbombó tǒ na nkusú ; kúná bayíbi bakobúka sandúku té, mpé bakoyíba yangó té. | |
Matt | LinVB | 6:22 | Líso lizalí mwínda mwa nzóto ; bôngó sókó líso lya yǒ lizalí malámu, nzóto ya yǒ mobimba ekozala na mwínda. | |
Matt | LinVB | 6:23 | Kasi sókó líso lya yǒ lizalí kobéle, nzóto ya yǒ mobimba ekozala na molílí. Bôngó, sókó mwínda moye mozalí o nzóto ya yǒ mokómí molílí, yangó ndé butú mpenzá. | |
Matt | LinVB | 6:24 | Moto mǒkó té akokí kosálela bakonzi bábalé ; tǒ akoyina mǒkó mpé akolinga mosúsu, tǒ akondima mǒkó mpé akokínola mosúsu. Bokokí kosálela Nzámbe ná mpé Mosolo té. | |
Matt | LinVB | 6:25 | Yangó wâná nayébísí bínó : bómítungisa té mpô ya bomoi bwa bínó sókó bokolía níni, tǒ mpô ya nzóto sókó bokoláta níni. Bomoi bolekí biléi té ? Nzóto elekí bilambá té ? | |
Matt | LinVB | 6:26 | Táláni ndeke ya likoló : ikokátaka bilanga té, ikobúkaka mbuma té, ikosangisaka yangó o bibómbelo té. Kasi Tatá wa bínó o likoló akoléisaka yangó ! Bínó bolekí ndeke na motúya té ? | |
Matt | LinVB | 6:27 | Náni o ntéi ya bínó, atâ amítungísí ndéngé níni, akokí kobakisa atâ mokolo mǒkó na bomoi bwa yě ? | |
Matt | LinVB | 6:28 | Mpé ntína níni bokomítungisaka mpô ya bilambá ? Táláni ndéngé níni fuléle ikokólaka o bilanga : ikoyókaka mpási na mosálá té, mpé ikosonoko bilambá té. | |
Matt | LinVB | 6:30 | Bôngó sókó Nzámbe akobongisaka matíti ma bilanga bôngó, maye mazalí leló mpé makobwákema lóbí o móto, akosála bínó malámu malekí té ? Bínó bato ba boyambi boké ! | |
Matt | LinVB | 6:32 | Bapagáno bato bakolukaka bilóko bîná bínso. Nzókandé Tatá wa bínó o likoló ayébí ’te bosengélí na byangó bínso. | |
Matt | LinVB | 6:33 | Bóluka libosó Bokonzi bwa Nzámbe mpé bosémbo bwa bwangó ; bilóko biye bínso ndebabakísélí bínó nsima. | |