PROVERBS
Chapter 4
Prov | LinVB | 4:3 | Ntango nazalaki mwana malamu o mboka tata wa ngai, mama azalaki kolinga ngai lokola mwana se moko wa ye. | |
Prov | LinVB | 4:4 | Tata azalaki koteya ngai na maloba maye : « Bomba maloba ma ngai o motema mwa yo, tosa mibeko mya ngai mpe okozwa bomoi. | |
Prov | LinVB | 4:8 | Bwanya bokotombola yo soko okangani na bwango, bwanya bokopesa yo lokumu lonene soko oyambi bwango. | |
Prov | LinVB | 4:12 | Soko olandi nzela eye, eloko yoko ekotiela yo libaku te ; ata opoti mbangu, okokweya te. | |
Prov | LinVB | 4:16 | Bango, soko basali mabe te, bakolala mpongi te, soko bakweisi moto mosusu te, bakozwa mpongi te. | |
Prov | LinVB | 4:23 | Liboso lya makambo manso batela motema mwa yo, zambi motema mozali liziba lya bomoi. | |