Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ACTS
Prev Up Next
Chapter 1
Acts LinVB 1:1  Teofíle, o búku ya ngáí ya yambo nakomí mánso Yézu asálákí mpé atéyákí út’o ebandela
Acts LinVB 1:2  kín’o mokolo atómbwámí o li­koló. Libosó apésákí na ngúyá ya Elímo Sántu malako ma yě na bapóstolo baye yěméí aponókí.
Acts LinVB 1:3  Nsima ya malózí ma yě amímónísí na bangó, na bilembo biíké alakísí bangó ’te azalákí na bomoi ; abimélí bangó mikolo ntúkú ínei, alobí na bangó mambí ma Bokonzi bwa Nzá­mbe.
Acts LinVB 1:4  Mokolo mǒkó, ntángo azalákí kolía elongó na bangó, atíndí bangó ’te bálongwa o Yerúzalem té, kasi bázila ’te likambo liye Tatá alakélákí lísálema : « Boyókákí lyangó o monoko mwa ngáí :
Acts LinVB 1:5  Yoáne azalákí kobátisa na mai, kasi bínó, nsima ya mwâ mikolo, bokokúla batísimo na Elímo Sántu. »
Acts LinVB 1:6  Awa basangání bôngó, batúní yě : « Mokonzi, okozóngisa bokonzi bwa Israél sikáwa ? »
Acts LinVB 1:7  Yézu azóngísí : « Koyéba ntángo mpé bilaká biye Tatá atíákí lokóla yě mǒ­kó alingí, etálí bínó té.
Acts LinVB 1:8  Kasi bokozwa ngúyá ntángo Elímo Sántu akokitela bínó, bôngó bokozala banzénénéké ba ngáí o Yerúzalem, o Yudéa mobimba, o Samaría téé na nsuka ya mokili. »
Acts LinVB 1:9  Esílísí Yézu koloba maloba maye, atómbwámí o likoló o míso ma bangó ; limpata lizipí yě, mpé bamóní yě lisúsu té.
Acts LinVB 1:10  Ezalákí bangó naíno kotála o likoló epái Yézu azalákí kokende, tálá bato bábalé balátí bilambá mpémbé bayéí kotéleme penepene na bangó ;
Acts LinVB 1:11  balobí : « Bato ba Galiléa, ntína níni botíkálí kotála o likoló boye ? Yézu óyo alongwámí na bínó mpé atómbwámí o likoló, akozónga bobélé bôngó, lokóla bomónókí yě abutí o liko­ló. »
Acts LinVB 1:12  Na nsima bakití ngómbá ya Olíva, bazóngí o Yerúzalem ; ngó­mbá eye ezalí mosíká na Yerúzalem té, bobélé ntáká ya mobémbo bakokí kosála o mokolo mwa sába­to.
Acts LinVB 1:13  Ekómí bangó o engumbá, babutí o mokili mwa ndáko, esíká bameséní kofánda. Ezalákí wâná : Pétro, Yoáne, Yakóbo, Andréa, Filípo, Tomá, Barteleméo, Matéo, Yakó­bo mwána wa Alféo, Simóni moto wa mpíla, na Yúda ndeko wa Yakóbo.
Acts LinVB 1:14  Bánso motéma mǒkó bazalákí kosámbela elongó na básí basúsu, na María mamá wa Yézu mpé na bandeko ba Yézu.
Acts LinVB 1:15  O mikolo mîná bandeko ba­sangání, bazalákí sókí monkámá na ntúkú íbalé. Pétro atélémí o ntéi ya bangó, alobí :
Acts LinVB 1:16  « Bandeko, eye ekomámí o Bikomá Bisántu esengélákí kosálema. Elímo Sántu asílí alobákí yangó na monoko mwa Davídi mpô ya Yudási, moto akambákí baye bakangákí Yézu.
Acts LinVB 1:17  Yě azalákí mǒkó wa bísó, mpé azwákí mosálá o ntéi ya bísó.
Acts LinVB 1:18  Asómbákí elanga na moso­lo moye bafútákí yě mpô ya mabé asálákí ; akwéí motó o nsé, apaswání mpé misopó mya yě misopání.
Acts LinVB 1:19  Bato bánso ba Yerúzalem bayébákí yangó, yangó wâná bakobéngaka elanga êná o lokóta la bangó ‘Akeldama’, lokóla ’te ‘Elanga ya makilá’.
Acts LinVB 1:20  Ya sôló, ekomámí o búku ya Nzémbo : Mbóka ya yě ékóma mopotú, moto mǒkó áfánda kúná lisúsu té. Ekomámí mpé : Moto mosúsu ákamata mosálá mwa yě.
Acts LinVB 1:21  Bato basúsu bazalákí na bísó ntángo ínso Mokonzi Yézu azalákí o ntéi ya bísó,
Acts LinVB 1:22  út’o batísimo ya Yoáne téé mokolo Yézu atíkí bísó. Bôngó mǒkó wa bangó asengélí kozala nzénénéké wa nsékwa ya Yézu elongó na bísó. »
Acts LinVB 1:23  Babimísí bato bábalé : Yozéfu, óyo bakobéngaka Bársaba, nkómbó ya yě esúsu Yústo, ná mpé Matiási.
Acts LinVB 1:24  Mpé basámbélí losámbo loye : « Mokonzi, yǒ oyébí mitéma mya bato bánso, lakísá bísó náni yǒ oponí o ntéi ya bangó bábalé,
Acts LinVB 1:25  ázw­a mosálá mwa apóstolo, o esíká ya Yudási óyo atíkí mwangó mpô ya kokende o esíká ya yě. »
Acts LinVB 1:26  Na nsima babétí zeké, mpé zeké elakísí Matiási ; bôngó bayíngísí yě o molongó mwa bapóstolo zómi na mǒkó.