Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ACTS
Prev Up Next
Chapter 22
Acts LinVB 22:1  « Bandeko na batatá, boyóka maye nalingí koyébisa bínó mpô ya komílóngisa. »
Acts LinVB 22:2  Eyókí bangó ’te abandí koloba na bangó o lokóta la ba-Ebréi, bato bánso bakómí nyê. Pólo alobí :
Acts LinVB 22:3  « Ngáí nazalí mo-Yúda ; nabótámí o Társi o Silísia, kasi nakólí áwa o engumbá eye, mpé nayékólí mambí mánso ma Mobéko mwa bankóko malámu mpenzá epái ya Gamáliel. Namípésákí na Nzámbe na motéma mobimba, lokóla bínó bánso bozalí kosála sikáwa.
Acts LinVB 22:4  Nazalákí konyókolo mpé koboma bato baye balandí nzelá ya Krístu ; nakangákí básí na babáli na minyolólo, nakótísákí bangó o bolóko.
Acts LinVB 22:5  Nganga mokonzi mpé likita mobimba lya bakóló bayébí ’te nazalí koloba makambo ma sôló. Bangó bapésákí ngáí minkandá mpô nákende epái ya bandeko ba Damásko ; nakendékí kúná mpô ’te nákanga bato na minyolólo, mpé náyâ na bangó o Yerúzalem mpô ’te bázwa etúmbu.
Acts LinVB 22:6  Ezalákí ngáí o nzelá, nakómí penepene na Damásko, sókí o ngonga ya midí, na mbálákáká mwínda monéne mongengí út’o likoló mpé mozíngí ngáí.
Acts LinVB 22:7  Nakwéí o mabelé mpé nayókí loláká la moto alobí na ngáí : ‘Saul, Saul, mpô níni ozalí konyókolo ngáí ?’
Acts LinVB 22:8  Nazóngísí : ‘Mokonzi, yǒ náni ?’ Alobí na ngáí : ‘Ngáí Yézu wa Nazaréte óyo ozalí konyókolo.’
Acts LinVB 22:9  Bato bazalákí na ngáí bamóní mwínda, kasi mongóngó mwa moto azalákí koloba na ngáí bayókákí mwangó té.
Acts LinVB 22:10  Bôngó natúní : ‘Mokonzi, násála níni ?’ Mokonzi alobí na ngáí : ‘Télémé mpé kendé o Damásko ; kúná bakoyébisa yǒ mánso osengélí kosála.’
Acts LinVB 22:11  Awa nazalákí komóno lisúsu té mpô ya mwínda môná monéne, báníngá bakambí ngáí na lobóko ; sé bôngó nakómí o Damásko.
Acts LinVB 22:12  Ezalákí kúná moto mǒkó Ananía, yě moto wa Nzámbe akotósaka Mobéko ; ba-Yúda bánso ba Damásko bazalákí kokúmisa yě.
Acts LinVB 22:13  Yě moto ayéí kotála ngáí, mpé áwa abelémí na ngáí alobí : ‘Saul, ndeko wa ngáí, míso ma yǒ máfungwama.’ Sé o ntángo êná, nakómí komóno yě.
Acts LinVB 22:14  Bôngó alobí : ‘Nzámbe wa bankóko ba bísó aponí yǒ út’o kala mpô ’te óyéba maye yě alingí : ómó­no bosémbo mpé óyóka loláká la monoko mwa yě ;
Acts LinVB 22:15  alingí ’te ózala nzénénéké wa yě o míso ma bato bánso, okoyébisa bangó mánso omóní mpé oyókí.
Acts LinVB 22:16  Ozalí kozila níni ? Bôngó ndimá kokúla batísimo mpé bóndélá Mokonzi álí­mbisa yǒ masúmu.’
Acts LinVB 22:17  Nazóngí o Yerúzalem, mpé mokolo mǒkó, ntángo nazalákí kosámbela o Témpelo, namóní limóní.
Acts LinVB 22:18  Mokonzi abimélí ngáí, alobí : ‘Sálá nokí, longwá o Yerúzalem, zambí bato ba engumbá eye bakoyamba maloba ma yǒ té, maye okosakola mpô ya ngáí.’
Acts LinVB 22:19  Nazóngísí : ‘Mokonzi, bayébí malámu ’te nazalákí kokende o sinagóga ínso mpô nákanga o bolóko baye bayambí yǒ mpé nábétisa bangó fímbo.
Acts LinVB 22:20  Mokolo babomákí Stéfano, martíro wa yǒ, nazalakí wâná ; nandimákí likambo lya bato babomákí yě, ngáí moto nazalákí kokéngele bilambá bya bangó.’
Acts LinVB 22:21  Mokonzi alobí lisúsu : ‘Kendé, nakotínda yǒ mosíká epái ya bato ba bikólo bisúsu’. »
Acts LinVB 22:22  Téé sikáwa ba-Yúda bazalákí koyóka yě. Kasi, áwa alobí bôngó, babandí kogánga : « Longola moto óyo na mokili ! Abongí kotíkala na bomoi té ! »
Acts LinVB 22:23  Bazalákí kogánga, balongólí kazáka ya bangó mpé ba­bwákí mputulú o likoló.
Acts LinVB 22:24  Sikáwa mokonzi wa basodá atíndí ’te bákótisa Pólo o nganda ya basodá, mpé bábéte yě fímbo mpô ’te áyéba ntína níni bato bazalákí kogángela Pólo bôngó na nkándá.
Acts LinVB 22:25  Kasi ntángo bakangí yě na nsinga mpô ya kobéte yě fímbo, Pólo alobí na komandá azalákí wâná : « Bokokí ndé kobéte mwána mbóka wa Róma fímbo sókó libosó basámbísí likambo lya yě té ? »
Acts LinVB 22:26  Awa komandá ayókí bôngó, akeí koyébisa mokonzi wa basodá : « Olingí kosála níni ? Moto óyo azalí mwána mbóka wa Róma. »
Acts LinVB 22:27  Bôngó mokonzi wa basodá ayéí kotúna Pólo : « Lobélá ngáí, ozalí mwána mbóka wa Róma ? » Pólo azóngísí : « Iyo. »
Acts LinVB 22:28  Mokonzi alobí : « Ngáí nasengélákí na mosolo míngi mpô ya kosó­mba likokí lya kozala mwána mbóka wa Róma. » Pólo alobí : « Ngáí nabótámí mwána mbóka wa Róma. »
Acts LinVB 22:29  Bôngó na mbala yǒ kó baye balingákí kobéte yě fímbo mpô áloba, batíkí yě. Mokonzi wa basodá mpé akómí kobánga, áwa ayókí ’te akangákí mwána mbóka wa Róma na minyolólo.
Acts LinVB 22:30  Etání ntóngó, mokonzi wa basodá alingí koyéba malámu mpenzá ntína níni ba-Yúda bafúndákí Pólo ; atíndí ’te bábimisa yě o bolóko, mpé abéngí banganga bakonzi na bakóló bánso ba Likita linéne básangana. Na nsima ayéí na Pólo mpé atíí yě o bosó bwa bangó.