BARUCH
Chapter 2
Baru | LinVB | 2:1 | Bongo Mokonzi akokisi liloba akanelaki biso, bazuzi bazalaki koyangela Israel, bakonzi, bankumu mpe bato banso ba Israel mpe ba Yuda. | |
Baru | LinVB | 2:2 | Makambo asali o Yeruzalem, asali mango liboso naino te o mokili mobimba, lokola ekomami o Mobeko mwa Moze : | |
Baru | LinVB | 2:4 | Mokonzi akabaki bato ba biso o maboko ma bikolo bisusu bizingi biso, mpo ’te bakoma eloko ya nsomo o miso ma baye bakoseke bango o bisika Mokonziapanzibango. | |
Baru | LinVB | 2:5 | Bazalaki bakonzi lisusu te, bakomaki baombo, mpo totumolaki Mokonzi Nzambe wa biso, mpe toboyaki koyoka ye. | |
Baru | LinVB | 2:6 | Mokonzi Nzambe wa biso azali na bosembo, kasi biso na bankoko ba biso tokomi koyoka nsoni lelo. | |
Baru | LinVB | 2:9 | Yango wana Yawe atalaki malozi maye manso maye atindeli biso, mpo Yawe azali na bosembo o maye manso atindaki biso. | |
Baru | LinVB | 2:10 | Kasi biso toboyaki kotosa ye. Tondimaki mibeko mya Yawe Nzambe wa biso te, miye alakisaki biso. | |
Baru | LinVB | 2:11 | E Yawe Nzambe wa Israel, yo moto obimisaki bato ba yo o mokili mwa Ezipeti na bokasi bwa yo. Olakisaki bilembo mpe osalaki makamwisi. Bokasi bwa loboko la yo bozweli nkombo ya yo lukumu tee lelo. | |
Baru | LinVB | 2:12 | Tosali masumu, tosali mabe, tozangaki bosembo, mpo totosaki mibeko mya Yawe Nzambe wa biso te. | |
Baru | LinVB | 2:13 | Longola nkanda ya yo o ntei ya biso, mpo totikali se ndambo ya bato o bikolo biye opanzaki biso. | |
Baru | LinVB | 2:14 | E Yawe, yoka losambo mpe mabondeli ma biso. Bikisa biso mpo ya lokumu la yo, mpe sala ’te baye bakangi biso bandimela biso. | |
Baru | LinVB | 2:15 | Bongo bato banso ba nse bayeba ’te yo ozali Yawe Nzambe wa biso, mpo Israel na bana ba ye bamipesi nkombo ya yo. | |
Baru | LinVB | 2:16 | E Yawe, ut’o ndako ya yo esantu otala biso, okanisa biso ; otandela biso matoi mpe oyoka biso. | |
Baru | LinVB | 2:17 | Fungola miso, Mokonzi, mpe tala : Bato bawei mpe bakiti o mboka ya bawa, baye bazali na mpema o nzoto lisusu te, bakoki kokumisa Mokonzi mpo ya bosembo bwa ye te. | |
Baru | LinVB | 2:18 | Kasi moto atondi na mawa, moto agumbami mpe azangi bokasi, miso malembi mpe motema motondi na mposa, ye akoki kokumisa yo Mokonzi mpo ya bosembo bwa yo ! | |
Baru | LinVB | 2:19 | Awa toyei kotika mabondeli ma biso o miso ma yo, Mokonzi Nzambe wa biso, tozali kotia elikya na matomba ma bankoko to ma bakonzi ba biso te. | |
Baru | LinVB | 2:20 | Solo, olakisi biso nkanda mpe nkele ya yo, lokola olobaki na monoko mwa baprofeta, basaleli ba yo, na maloba maye : | |
Baru | LinVB | 2:21 | Boyoka maloba ma Yawe : « Bokitisa mitó mya bino, bosalela mokonzi wa Babilon, bongo bokotikala o mokili moye napesaki bankoko ba bino. | |
Baru | LinVB | 2:23 | nakopekisa o bingumba bya Yuda mpe o Yeruzalem nzembo ya esengo mpe ya nsai, mpe nzembo ya mobali to ya mwasi abali sika. Mokili mobimba mokokoma mopotu, bato bakozala lisusu te. » | |
Baru | LinVB | 2:24 | Kasi toyokaki yo te, mpe tosaleli mokonzi wa Babilon te. Yango wana okokisi maye olobaki na monoko mwa baprofeta, basaleli ba yo : Bato bayaki kolongola minkuwa mya bakonzi mpe minkuwa mya bankoko ba biso o malita. | |
Baru | LinVB | 2:25 | Babwaki myango o libanda, sikawa balali o moi mokasi mpe mpio ya butu. Bakufaki na mpasi inene : na nzala, mopanga to bokono bobe. | |
Baru | LinVB | 2:26 | Ndako eye batangi na nkombo ya yo, otiki yango ebeba, lokola ekomononoko lelo ; esalemi bongo mpo ya masumu ma bato ba Israel mpe ba Yuda. | |
Baru | LinVB | 2:27 | Nzokande Mokonzi Nzambe wa biso, olakisaki biso ngolu enene ya yo mpe bolamu bonene bwa yo. | |
Baru | LinVB | 2:28 | lokola mosaleli wa yo Moze asakolaki mokolo otindaki ’te akoma Mibeko o miso ma bana ba Israel, ntango olobaki : | |
Baru | LinVB | 2:29 | « Soko boyoki ngai te, bato baye ebele bakotikala se bato bake o bikolo biye nakopanza bango. | |
Baru | LinVB | 2:30 | Nayebi ’te bakoyoka ngai te, mpo bazali bato ba motó makasi. Kasi o mokili moye mwa boombo bakobanda kokanisa, | |
Baru | LinVB | 2:31 | mpe bakondima ’te ngai nazali Yawe Nzambe wa bango. Nakopesa bango motema mwa sika mpe matoi makoyoka. | |
Baru | LinVB | 2:33 | Bakotika lolendo la bango mpe misala mibe mya bango. Bakokanisa masumu bankoko ba bango basalaki o miso ma Mokonzi. | |