EZEKIEL
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
Chapter 13
| Ezek | LinVB | 13:2 | Mwana wa moto, sakola maloba ma bopaleli baprofeta ba Israel ; loba na bato baye bakosakolaka o nkombo ya bango moko ’te batia matoi na maloba ma Yawe. | |
| Ezek | LinVB | 13:3 | Mokonzi Yawe alobi boye : Mawa na baprofeta baye bazangi mayele, bakolandaka makanisi ma bango moko, kasi bakomonoko eloko te. | |
| Ezek | LinVB | 13:5 | Bobatelaki engumba te. Botongaki lopango te mpo ya kobatela bato ba Israel, mpo ’te bakweya o etumba te, o mokolo mwa Yawe. | |
| Ezek | LinVB | 13:6 | Ata bakomonoko bimonela bya mpamba mpe bakokosaka bato ntango bakosakola maye makoya ; bakolobaka : « Boyoka maloba ma Yawe », nzokande Yawe atindaki bango te. Ndenge nini balingi ’te akokisa maloba ma bango ? | |
| Ezek | LinVB | 13:7 | Ya solo, bokomonoko bimonela bya mpamba. Bokokosaka bato ntango bokosakolaka maye makoya, na bolobi : « Boyoka maloba ma Yawe », nzokande ngai nalobaki eloko te. | |
| Ezek | LinVB | 13:8 | Yango wana Mokonzi Yawe alobi boye : Awa bosakolaki makambo ma mpamba mpe bomonoki se bimonela bya lokuta, nakotumbola bino. Elobi bongo Mokonzi Yawe. | |
| Ezek | LinVB | 13:9 | Loboko la ngai lokokwela baprofeta baye bakomonoko bimonela bya mpamba mpe bakokosaka bato ntango bakosakolaka maye makoya. Bakondima bango o lisanga lya bayangeli ba ekolo ya bato ba ngai te. Nkombo ya bango ekokomama te o buku ya bana ba Israel, mpe bakokoto o ekolo ya Israel te. Bokoyeba bongo ’te ngai nazali Mokonzi Yawe. | |
| Ezek | LinVB | 13:10 | Bakosaki bato ba ekolo ya ngai. Balobaki na bango ’te bakozwa boboto, nzokande boboto bozali te ; mpe bapakolaki mokobo o efelo bato ba mboka batongaki. | |
| Ezek | LinVB | 13:11 | Yango wana loba na bango : Mokolo mbula ekonoko makasi, mbula ya matandala, mpe mompepe mwa ekumbaki mokoya, | |
| Ezek | LinVB | 13:13 | Yango wana Mokonzi Yawe alobi boye : Mpo ya nkanda nakobimisa mompepe mwa ekumbaki na mbula enene, mbula ya matandala, eye ekoboma binso. | |
| Ezek | LinVB | 13:14 | Nakobuka efelo eye bopakoli mokobo, nakokweisa yango ; mabanga ma nse makomonono o libanda. Efelo ekokweya mpe bino bokokufa o nse ya efelo. Bokoyeba bongo ’te ngai nazali Yawe. | |
| Ezek | LinVB | 13:15 | Likolo lya efelo mpe lya baye bapakolaki yango mokobo, nakosilisa nkanda ya ngai. Nakoloba na bino : Efelo na bato bapakolaki yango mokobo bazali lisusu te. | |
| Ezek | LinVB | 13:16 | Baprofeta bakozala o Israel lisusu te, baye bakosakolaka makambo matali Yeruzalem mpe bakomonoko mamoni ma boboto, ntango boboto bozali soki moke te. Elobi bongo Mokonzi Yawe. | |
| Ezek | LinVB | 13:17 | Yo, mwana wa moto ! Tala bana basi ba ekolo ya yo, baye bakosakolaka o nkombo ya bango moko, mpe sakola na bokaneli bango. | |
| Ezek | LinVB | 13:18 | Loba na bango maloba ma Mokonzi Yawe : Mawa na basi bakotongaka nsinga mpe bakolatisaka yango maboko ma bato, mpe bakosonelaka bilenge na bakolo matambala mpo ya kotiela bango mitambo. Bolingi nde koboma bomoi bwa bato ba ngai mpe kobikisa bomoi bwa bino moko ? | |
| Ezek | LinVB | 13:19 | Bokoyokisaka ngai nsoni o miso ma bato ba ngai mpo ya kopo ya masangu to mwa biteni bya mampa. Bokobomaka bato basengeli kokufa te, mpe bokobikisaka baye bazali na ntina ya kobika te na bokosi bato ba ngai bakoyokaka makambo ma bino ma lokuta. | |
| Ezek | LinVB | 13:20 | Yango wana Mokonzi Yawe alobi boye : Nakobotolo nsinga ya bino iye bokotielaka bato motambo lokola ndeke. Nakolongola yango o maboko ma bino mpe nakobikisa bomoi bwa bato bolingi kotiela motambo lokola ndeke. | |
| Ezek | LinVB | 13:21 | Nakopasola matambala ma bino, mpe nakobikisa bato ba ngai o maboko ma bino ; bakozala lisusu nyama ya koboma o maboko ma bino te. Bongo bokoyeba ’te ngai nazali Yawe. | |
| Ezek | LinVB | 13:22 | Bino bokolembisaka basemba mitema na lokuta la bino, nzokande ngai nalingaki bongo te. Bokolendisaka bato babe te mpo bazwa mpiko ya kotika mabe ma bango te, mpe babika te. | |