Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EZEKIEL
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 17
Ezek LinVB 17:2  Mwana wa moto, pe­sa sambole mpe yebisa bato ba Israel moulani.
Ezek LinVB 17:3  Yebisa bango : Mokonzi Yawe alobi boye : Engondo enene ya mapapu malai mpe na nsala ya langi ndenge na ndenge ekiti o Libano mpe ekati nsonge ya sédere.
Ezek LinVB 17:4  Ebuki etapi eye ya likolo mpenza, ekei na yango o ekolo ya bato ba mombongo mpe etiki yango o engumba yoko ya bateki.
Ezek LinVB 17:5  Na nsima ekamati o sédere eye mwa etapi ebimi sika, eloni yango o elanga ya mabelé malamu penepene na nzela ya mai, lokola bakolonaka wenge.
Ezek LinVB 17:6  Mwa etapi ekoli, ekomi nzete ya vino eboti mingi, na mobimbi mokuse, epanzoli bitapi bya yango epai ya engondo ; minsisa mizalaki o nse ya engondo. Nzete ekoli, ekomi na bitapi bilai mpe bikuse.
Ezek LinVB 17:7  Kasi engondo esusu enene ebimi, na mapapu malai mpe na nsala ebele. Nzete ya vino etandeli engondo minsisa mpe bitapi mpo esopela yango mai, leka mai ma mabelé esika balonaki yango.
Ezek LinVB 17:8  Nzete eye elonamaki o mabelé malamu, penepene na esika yoko mai mazali mingi, ébimisa nkasa mingi mpe ébota mbuma, ézala nzete ya vino eleki kitoko.
Ezek LinVB 17:9  Sakola : Mokonzi Yawe alobi boye : Nzete ena ekokola nde malamu ? Engondo ekokundola minsisa mya yango te ? Ekobotolo yango mbuma te ? Bongo nkasa inso ya sika ikokauka te ? Bakosengela nde na bokasi mpe na bato baike mpo ’te bakata minsisa mya yango ?
Ezek LinVB 17:10  Etapi eye baloni ekokola nde malamu ? Mompepe mwa Esti mokokaukisa yango te ? Ekokauka bobele o esika baloni yango !
Ezek LinVB 17:12  Tuna libota lina lya batomboki : Boyebi ntina ya moulani moye te ? Loba : Mokonzi wa Babilon ayei o Yeruzalem. Akangi mokonzi na ba­nkumu mpe akambi bango epai ya ye o Babilon.
Ezek LinVB 17:13  Aponi moto moko o libota lya mokonzi mpe akati na ye bondeko. Alongoli bankumu ba ekolo mpe alayisi ye ndai,
Ezek LinVB 17:14  mpo ’te ekolo ekola te mpe ekoka komito­mbola te. Abatela bongo bondeko akataki na ye.
Ezek LinVB 17:15  Kasi nkumu ona atombokeli ye, awa atindi bantoma o Ezipeti basenge farasa na basoda ebele. Likambo liye likobongela ye ? Moto asali bongo akolonga ? Awa abomi bondeko, akobika solo ?
Ezek LinVB 17:16  Mo­konzi Yawe alobi boye : Nalayi o nkombo ya ngai, akokufa o Babilon, o mokili mwa mokonzi oyo apesaki ye ngwende, awa akinoli ndai mpe abomi bondeko.
Ezek LinVB 17:17  Fa­rao na limpinga lya basoda ba ye ebele akokoka kosalisa ye o etu­mba te, ntango bakosangisa mabelé penepene na lopango la engu­mba mpe bakotonga ebombamelo mpo ya koboma bato ebele.
Ezek LinVB 17:18  Akinoli ndai mpe abomi bondeko ; ata alayaki ndai mpe asali makambo maye manso, akokoka kobika te.
Ezek LinVB 17:19  Yango wana Mokonzi Yawe alo­bi boye : Nalayi o nkombo ya ngai : Akinoli ndai ya ngai mpe abomi bondeko bwa ngai : mana manso makokwela ye.
Ezek LinVB 17:20  Nakopika monyama mpo ’te akangema na mwango. Nakokamba ye o Babilon, mpe kuna nakotumbola ye, zambi akosaki ngai.
Ezek LinVB 17:21  Basoda ba ye baye baleki mpiko o bitumba bakokufa na mopanga ; mompepe mokopanza baye banso bakotikala. Bokondima bo­ngo ’te ngai Yawe nalobaki yango.
Ezek LinVB 17:22  Mokonzi Yawe alobi boye : Nakokata etapi o nsonge ya sédere, nakolona yango o ngomba esanda.
Ezek LinVB 17:23  Nakolona yango o ngomba esa­nda ya Israel. Ekobimisa bitapi bya sika mpe ekobota mbuma, ekokoma nzete kitoko mpenza ; ndeke ndenge na ndenge ikoya ko­tonga zumbu wana mpe kopema o nse ya bitapi.
Ezek LinVB 17:24  Nzete inso ya bilanga ikoyeba ’te nazali Yawe, oyo akoki kokitisa nzete elai mpe kotombola nzete ekuse. Nakoki kokaukisa nzete ebesu mpe kobotisa fulele o nzete ekauki. Maye ngai Yawe nalobi, nakosala mango.