Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
GENESIS
Prev Up Next
Chapter 15
Gene LinVB 15:1  Nsima ya makambo mana, Yawe abimeli Abram na ndoto, alobi : « Abram, obanga te, ngai nakobatela yo, okozwa lifuta linene mpenza. »
Gene LinVB 15:2  Abram azongisi : « Mokonzi wa ngai Yawe, okopesa ngai nini ? Naboti naino te.
Gene LinVB 15:3  Tala, opesi ngai bana te, mpe mosali moko wa ngai akosangola biloko bya ngai. »
Gene LinVB 15:4  Yawe azongiseli ye : « Mosali akosangola biloko bya yo te, bobele mwana yo moko okobota akosangola byango. »
Gene LinVB 15:5  Akei na ye o libanda mpe alobi : « Tombola miso o likolo, tanga minzoto soko okoki. » Mpe abakisi : « Bato ba libota lya yo bakosala ebele boye. »
Gene LinVB 15:6  Abram andimi Yawe, akomi moto semba o miso ma ye, mpo ya boyambi bwa ye.
Gene LinVB 15:7  Yawe alobi na ye : « Ngai Yawe nabimisaki yo o mboka Ur, o mokili mwa Kaldea mpo ’te napesa yo mokili moye, okoma nkolo wa mabelé maye. »
Gene LinVB 15:8  Abram ayanoli : « Mokonzi Yawe, boniboni nakoyeba ’te nakozwa mabelé maye ? »
Gene LinVB 15:9  Yawe alobi : « Kamata ngombe mwasi ya mbula isato, ntaba ya mbula isato, mpata mobali ya mbula isato, ekokoba yoko na mwana wa ebenga. »
Gene LinVB 15:10  Abram ayeli ye nyama ina inso, akati yango biteni bibale, atii biteni epai na epai, kasi apasoli ndeke te.
Gene LinVB 15:11  Bingondo biyei kolia misuni, Abram abengani byango.
Gene LinVB 15:12  Awa moi mokiti, Abram akwei o mpongi ekasi, molili na nsomo enene ekangi ye.
Gene LinVB 15:13  Mpe Yawe alobi na Abram : « Yeba ’te bankoko ba yo bakozala bampaya o ekolo ezali ya bango te. Kuna bakozala ba­ombo, bakonyokwama mbula nkamainei.
Gene LinVB 15:14  Kasi nakopesa bato ba ekolo ena etumbu, mpe mokolo bana ba yo bakobima kuna bakozala na biloko mingi.
Gene LinVB 15:15  Yo nde okokoma moba­nge, okokende na boboto epai ya batata ba yo.
Gene LinVB 15:16  Nzokande bankoko ba yo bakobota lisusu bana na bankoko kuna. Bobele na nsima bakozonga o mokili moye, za­mbi o nta­ngo ena masumu ma ba-Amor makoleka ndelo. »
Gene LinVB 15:17  Awa moi mokiti mpe butu boyindi, lituka na móto libimi milinga ná mpe esungi bileki o kati ya nyama bakataki.
Gene LinVB 15:18  Mokolo mona Yawe akati bondeko na Abram, alobi : « Nakopesa bana ba yo ekolo eye, ut’o ebale ya Ezipeti tee ebale enene Efrate,
Gene LinVB 15:19  ezali ekolo ya ba-Keni, ya ba-Kenaz, ya ba-Kadmon,