Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
GENESIS
Prev Up Next
Chapter 8
Gene LinVB 8:1  Nzambe akanisi Nowe na nya ma ya zamba inso, na nyama ike inso izalaki na ye o masuwa. Nzambe atindi mompepe o mokili mpe mai mabendani.
Gene LinVB 8:2  Maziba ma mokili na mampata ma likolo makauki, mbula ebeti lisusu te,
Gene LinVB 8:3  mai mabandi kokita. Nsima ya mikolo monkama na ntuku itano, mai o mokili makiti ;
Gene LinVB 8:4  mpe o sanza ya nsambo masuwa mayei koteleme o nsonge ya ngomba Ararat.
Gene LinVB 8:5  Mai mazalaki se kokita tee sanza ya zomi, mpe o mokolo mwa yambo mwa sanza nsonge ya ngomba ibimi likolo lya mai.
Gene LinVB 8:6  Nsima ya mikolo ntuku inei, Nowe afungoli lininisa lisalaki ye o masuwa,
Gene LinVB 8:7  abimisi yanganga ; ya­nganga ezalaki kobima mpe kozo­nga tee mai manso makauki o mokili.
Gene LinVB 8:8  Na nsima abimisi ebenga ezalaki na ye mpo ayeba soko mai masili makiti o mokili.
Gene LinVB 8:9  Awa ebe­nga emoni esika ya kotia makolo te, ezongi epai ya Nowe o masuwa, zambi mai matondi naino o mokili mobimba. Nowe abimisi loboko, akangi ebenga, akotisi yango epai ya ye o masuwa.
Gene LinVB 8:10  Azili lisusu mikolo nsambo, na nsima abimisi lisusu ebenga.
Gene LinVB 8:11  Na mpokwa ebe­nga ezongeli ye na lokasa lobesu la oliva o monoko. Nowe ayebi bo­ngo ’te mai manso o mokili makiti.
Gene LinVB 8:12  Azili lisusu mikolo nsambo mpe abimisi ebenga. Ebenga ezongeli ye lisusu te.
Gene LinVB 8:13  Ekokisi Nowe mibu nkama motoba na moko, o sanza ya ya­mbo, mokolo mwa yambo mwa sanza mai mabendani o mokili. Nowe afungoli motondo mwa masuwa, atali mpe amoni ’te mokili mosili mokauki.
Gene LinVB 8:14  O sanza ya ibale, mikolo ntuku ibale na nsa­mbo, mokili mokauki nye.
Gene LinVB 8:16  « Bima o masuwa, yo na mwasi wa yo, bana ba yo na basi ba bango.
Gene LinVB 8:17  Bimisa nyama inso izali na yo, binso bizali na misuni, ndeke, nyama ya mboka na nyama ike ikolandaka o mabelé, bimisa yango mpo ikende kobota, ikoma mingi o mokili. »
Gene LinVB 8:18  Nowe abimi, elongo na mwasi wa ye, na bana ba ye na basi ba ba­ngo.
Gene LinVB 8:19  Mpe nyama inso ya zamba, nyama inso ya mboka, na ndeke inso na nyama inso ikolandaka o mabelé, inso ibimi na molongo.
Gene LinVB 8:20  Nowe atongi alta­re mpo ya kokumisa Yawe. Aponi nyama o kati ya nyama inso izali na mbindo te, na mpe ndeke, abonzi yango o altare bo mabonza ma kotumba.
Gene LinVB 8:21  Yawe ayoki nsolo mpimbo, amilobeli : « Nakobebisa mokili mpo ya mabe ma bato lisusu te, zambi mitema mya bango mizali mabe ut’o bo­mwana. Nakoboma bikelamo bya nse mokolo moko lisusu te, lokola nauti kosala.
Gene LinVB 8:22  Kin’o nsuka ya molongo bakobuka mbuma nsima ya kolona, ela­nga ekoya nsima ya mpela, molunge mingi nsima ya mpio makasi, ntongo ekotana nsi­ma ya butu, se bongo o bileko bi­nso seko. »