Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I SAMUEL
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 10
I Sa LinVB 10:1  Samuel akamati mbeki ya mafuta, asopeli Saul mango o motó ; azingi ye ekopi mpe alobi : « Yawe moto apakoli yo mafuta, mpo ozala mokonzi wa Israel, ekolo ya ye. Yo moto okoyangela ekolo ya Yawe mpe okobikisa bato ba ye o maboko ma banguna. Mpe tala awa elembo ’te Yawe moto aponoki yo bo mokonzi wa ekolo ya ye.
I Sa LinVB 10:2  Okotika ngai lelo, okokuta bato babale penepene na lilita lya Rakele, o ndelo ya mokili mwa Benyamin. Bakoyebisa yo : ‘Mpunda ozalaki koluka, isili imononi ! Tata wa yo asili kobosana likambo lya mpunda mpe akomi kobanga mpo ya yo ; azali komituna : Nakoki kosala nini mpo ya mwana wa ngai ?’
I Sa LinVB 10:3  Longwa wana, koba nzela ya yo mpe okokoma epai ya wenge eye ezali o Tabor. Kuna okokuta bato basato bazali kokende o ndako Nzambe ya Betel ; moko akomeme bana ntaba isato, mosusu mampa masato, mosusu mbeki ya vino.
I Sa LinVB 10:4  Bakopesa yo losako mpe bakokabela yo mampa mabale ; okokamata mango o maboko ma bango.
I Sa LinVB 10:5  Na nsima okokoma o Gibea, ngomba ya Nzambe, esika bayangeli ba Filisti bakofandaka. Kuna, o ntango okokoto o mboka, okokutana na lingomba lya baprofeta, balongwi o ngomba esantu mpe bazali kolanda bato ba miziki, baye bakobeteke nzenze, mbonda, mpiololo na like­mbe. Bakosakola maloba ma profeta.
I Sa LinVB 10:6  Elimo ya Yawe ekokitela yo, okosakola lokola profeta mpe okobongwana moto mosusu.
I Sa LinVB 10:7  Esika okomono bilembo bina binso bikosalema, sala maye osengeli kosala, zambi Nzambe azali na yo.
I Sa LinVB 10:8  Yo, okita ngomba liboso lya ngai mpe kende o Gilgal. Nakolanda yo nsima mpo ya kobonzela mabonza ma kotumba na miboma mya bondeko. Zila ngai kuna mikolo nsambo ; na nsima nakoya epai ya yo mpe nakoyebisa yo maye osengeli kosala. »
I Sa LinVB 10:9  Elingi Saul kokende mpe kotika Samuel, Nzambe abongoli ye motema, mpe bilembo bina binso biyei ko­salema bobele o mokolo monamei.
I Sa LinVB 10:10  Balongwi o Gibea mpe bakutani na lingomba lya baprofeta. Elimo ya Nza­mbe ekiteli ye mpe abandi kosakola maloba ma profeta elongo na bango.
I Sa LinVB 10:11  Bato banso bayebaki Saul ut’o kala, awa bamoni ’te akomi kosakola maloba elongo na baprofeta, balobani : « Makambo nini makwelaki mwana wa Kis ? Saul mpe azali moko wa baprofeta ? »
I Sa LinVB 10:12  Mpe moto moko wa mboka alobi : « Kasi tata wa bango nani ? » Yango wana liloba liye likomi lokola eyele epai ya bato : « Saul mpe azali moko wa baprofeta ? »
I Sa LinVB 10:14  Noko wa Saul atuni ye na mosaleli wa ye : « Bokendeki wapi ? » Saul azongisi : « Tokendeki koluka mpu­nda. Tomonoki yango te ; yango wana tokendeki epai ya Samuel. »
I Sa LinVB 10:15  Noko wa Saul alobi na ye : « Yebisa ngai maloba Samuel alobaki na yo. »
I Sa LinVB 10:16  Saul ayanoli noko wa ye : « Ayebisi biso bobele ’te mpunda isili imononi. » Kasi likambo lya bokonzi, liye Samuel alobelaki ye, ayebisi ye te.
I Sa LinVB 10:17  Samuel abengi bato banso epai ya Yawe kuna o Mispa.
I Sa LinVB 10:18  Alobi na ba-Israel : « Yawe, Nzambe wa Israel, alobi boye : Ngai moto nabimisaki ba-Israel o Ezipeti, nabikisaki bino o boombo bwa Ezipeti mpe o maboko ma bakonzi banso bazalaki konyokolo bino.
I Sa LinVB 10:19  Kasi bino, lelo boboyi Nzambe wa bino, oyo abikisaki bino o mabe manso mpe o makambo ma nsomo, mpe bolobi na ye : ‘Pesa biso mokonzi’. Bomilakisa sikawa na Yawe, mabota na mabota, bituka na bituka. »
I Sa LinVB 10:20  Samuel abengi mabota manso ma Israel mpo babeleme na ye, mpe libota lya Benyamin liponomi.
I Sa LinVB 10:21  Abengi libota lya Benyamin, etuka na etuka, mpe etuka ya Matri eponomi. Abe­ngi etuka ya Matri, moto moko moko, mpe Saul, mwana wa Kis, oyo aponomi. Baluki ye, kasi bamoni ye te.
I Sa LinVB 10:22  Batuni Yawe lisusu : « Moto moko alekaki awa ? » Mpe Yawe ayanoli : « Ta­la ye kuna, abombami penepene na sanduku ya biloko. »
I Sa LinVB 10:23  Bakei mba­ngu kokamata ye, mpe ye amilakisi o kati ya bato. Aleki bato banso na bolai, azali moto wa mapeke malai maleki bato basusu banso.
I Sa LinVB 10:24  Samuel alobi na bato : « Bomoni moto oyo Yawe aponi ? O ekolo mobimba moto moko akokani na ye te. » Mpe banso babeteli ye maboko mpe bagangi : « Mokonzi kuma ! »
I Sa LinVB 10:25  Samuel alimboleli bato makoki ma mokonzi ; akomi manso o mo-nkanda mpe atii mwango liboso lya Yawe. Na nsima Samuel atindi bato bazonga o mboka.
I Sa LinVB 10:26  Saul mpe azongi o mboka ya ye Gibea. Mpe bato, baye Yawe apesi bango mpiko, bakei na ye elongo.
I Sa LinVB 10:27  Kasi bifaka bya bato balobi : « Ndenge nini moto oyo akobikisa biso ? » Bakinoli ye mpe baboyi kopesa ye makabo. Kasi Saul atali yango se mpamba.