LUKE
Chapter 5
Luke | LinVB | 5:1 | Yézu azalákí o libóngo lya etíma ya Genézarete, mpé bato ebelé bayéí kozínga yě mpô ya koyóka matéya ma Nzámbe. | |
Luke | LinVB | 5:2 | Amóní máto mábalé o libóngo lya etíma, bankóló ba mangó balubwí mpé bazalákí kosukola minyámá. | |
Luke | LinVB | 5:3 | Yézu ayíngélí o bwáto bǒkó, ezalákí bwáto bwa Simóni ; aséngí yě ’te ápúsa bwáto mwá moké o mái. Afándí mpé abandí kotéya bato út’o bwáto. | |
Luke | LinVB | 5:4 | Esílísí yě kotéya, alobí na Simóni : « Tíndá bwáto o maí bozindó, bwáká monyámá mpô ya koboma mbísi. » | |
Luke | LinVB | 5:5 | Simóni azóngísí : « Motéyi, butú mobimba tomíyókísí mpási, tobomí elóko té ; kasi áwa yǒ olobí bôngó, nakobwáka minyámá. » | |
Luke | LinVB | 5:7 | Babéngí báníngá bazalákí o bwáto bosúsu báyâ kosálisa bangó. Bayéí, batóndísí máto mábalé meké, malingí mázinda. | |
Luke | LinVB | 5:8 | Emóní Simóni Pétro bôngó, afukámélí Yézu, alobí : « Mokonzi, longwá penepene na ngáí, zambí nazalí mosúmuki. » | |
Luke | LinVB | 5:10 | sé bôngó Yakóbo na Yoáne, bána ba Zebedéo, báníngá ba Simóni. Kasi Yézu alobí na Simóni : « Obánga té, bandá leló okobénda bato. » | |
Luke | LinVB | 5:12 | Ekómí Yézu o mbóka yǒkó, moto mǒkó azalákí wâná na maba o nzóto mobimba. Ntángo amóní Yézu, amíbwákí o nsé mpé abóndélí yě : « Mokonzi, sókó olingí, okokí kopétola ngáí. » | |
Luke | LinVB | 5:13 | Yézu atandí lobóko, asímbí yě, alobí : « Nalingí ókóma péto ! » Mpé na mbala yǒkó maba masílí. | |
Luke | LinVB | 5:14 | Yézu apekísí yě áloba yangó na moto mǒkó té, alobí : « Kendé komílakisa na nganga Nzámbe, bonzá libonza lokóla Móze atíndí, ólakisa bangó ’te okómí péto. » | |
Luke | LinVB | 5:15 | Nzókandé nsango ya Yézu ekómí kopalangana míngi mpé bato baíké bayéí kosangana mpô ya koyóka matéya ma yě mpé kobíka o bokono bwa bangó. | |
Luke | LinVB | 5:17 | Mokolo mǒkó Yézu azalákí kotéya. Ba-Farizéo na batéyi ba Mobéko bafándí wâná, baútákí o mbóka ínso ya Galiléa, ya Yudéa mpé o Yerúzalem. Na ngúyá ya Nzámbe abíkísí bato ba bokono. | |
Luke | LinVB | 5:18 | Mpé tálá bayéí na moto akúfá makolo, alálí o kitikwálá. Balukí koyíngisa yě o ndáko mpé kotía yě o bosó bwa Yézu. | |
Luke | LinVB | 5:19 | Kasi bazwí nzelá ya koyíngisa yě té, mpô ya nkaká ya bato. Yangó wâná babutí o motóndo mwa ndáko, basálí lilusú. Bakitísí yě na kitikwálá ya yě o káti ya bato, o bosó bwa Yézu. | |
Luke | LinVB | 5:21 | Batéyi ba Mobéko na ba-Farizéo babandí komítúna : « Yě ndé náni ’te átúka Nzámbe boye ? Náni akokí kolímbisa masúmu, bobélé Nzámbe té ? » | |
Luke | LinVB | 5:23 | Níni elekí mpási : koloba ‘masúmu ma yǒ malímbámí’, tǒ koloba ‘télémé mpé támbóla’ ? | |
Luke | LinVB | 5:24 | Bôngó, mpô ’te bóyéba ’te Mwána wa Moto azalí na likokí lya kolímbisa masúmu áwa o nsé », sikáwa alobí na moto akúfá makolo : « Nalobí na yǒ : télémé, kamátá kitikwálá ya yǒ mpé kendé o ndáko. » | |
Luke | LinVB | 5:25 | Sé o ntángo êná atélémí o míso ma bangó, akamátí kitikwálá ya yě mpé akeí o ndáko. O nzelá azalákí kokúmisa Nzámbe. | |
Luke | LinVB | 5:26 | Bato bánso bakámwí míngi mpé bakúmísí Nzámbe. Babángí mpé balobí : « Leló tomóní makambo ma kokámwa ! » | |
Luke | LinVB | 5:27 | Nsima yangó Yézu abimí mpé amóní mofútisi mpáko Lévi, afándí o biló ya mpáko. Alobí na yě : « Landá ngáí. » | |
Luke | LinVB | 5:29 | Lévi alámbélí yě limpáti linéne o ndáko ya yě. Bafútisi mpáko baíké na bato basúsu bazalákí na bangó elongó o méza. | |
Luke | LinVB | 5:30 | Ba-Farizéo na batéyi ba Mobéko bayókí mabé, balobí na bayékoli ba yě : « Mpô níni bozalí kolía mpé komele elongó na bafútisi mpáko mpé na basúmuki ? » | |
Luke | LinVB | 5:31 | Kasi Yézu alobí na bangó : « Bato bazalí nzóto kólóngónú basengélí na mónganga té, sé bato ba bokono. | |
Luke | LinVB | 5:33 | Balobí na yě : « Bayékoli ba Yoáne bakolálaka nzala mbala míngi mpé bakosámbelaka ; bayékoli ba ba-Farizéo bakosálaka bobélé bôngó ; kasi baye ba yǒ bakolíaka mpé bakomeleke. » | |
Luke | LinVB | 5:34 | Yézu alobí na bangó : « báníngá ba mobali bakoki kolála nzala té, ntángo mobali azalí na bangó ? | |
Luke | LinVB | 5:35 | Kasi mokolo mosúsu bakolongola bolóngani o ntéi ya bangó, o ntángo êná bakolála nzala. » | |
Luke | LinVB | 5:36 | Alobí na bangó mpé moúlání moye : « Moto mǒkó té akopasola elambá ya sika mpô ya kobamba elambá ya kala. Sókó asálí bôngó, akobébisa elambá ya sika ; eténi ya sika ebongí na elambá ya kala té. | |
Luke | LinVB | 5:37 | Moto mǒkó mpé té akotía víno ya sika o ngóto ya kala, zambí víno ya sika ekopasola ngóto ya kala, ekosopana mpé ngóto ekobéba. | |