Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
MATTHEW
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 8
Matt LinVB 8:1  Ntángo Yézu akití ngómbá, bato ebelé balandí yě.
Matt LinVB 8:2  Tálá, moto wa maba ayéí, akúmbámélí yě, alobí : « Mokonzi, sókó olingí, okokí kopétola ngáí. »
Matt LinVB 8:3  Yézu atómbólí lobóko, asímbí yě, alobí : « Nalingí ókóma péto. » Sé o ntángo êná apétwámí na maba ma yě.
Matt LinVB 8:4  Yézu alobí na yě : « Kébá, óloba yangó na moto té ; kasi kendé komílakisa na nganga Nzámbe, mpé bonza libonza lokóla Móze atíndákí mpô ya kolakisa bato ’te obíkí. »
Matt LinVB 8:5  Ekómí Yézu o Kafárnaum, komandá mǒkó abelémí na yě, abó-ndélí yě :
Matt LinVB 8:6  « Mokonzi, mosáleli wa ngáí alálí o ndáko, makolo ma yě mabúkání mpé azalí koyóka mpási míngi. »
Matt LinVB 8:7  Yézu alobí na yě : « Nakoyâ kobíkisa yě. »
Matt LinVB 8:8  Komandá azóngísí : « Mokonzi, nabongí té ’te óyíngela o ndáko ya ngáí, kasi lobá kaka mpé mosáleli wa ngáí akobíka.
Matt LinVB 8:9  Ngáí nazalí na bakonzi libosó lya ngáí, nazalí mpé na basodá nsima ya ngáí. Sókó nalobí na mǒ­kó ‘Kendé’, akokende ; na mosúsu ‘Yáká’, akoyâ ; na mosúsu ‘Sálá mosálá moye’, akosála mwa­ngó. »
Matt LinVB 8:10  Eyókí Yézu bôngó, aká­mwí mpé alobí na bato bazalákí kolanda yě : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : naíno nakútí moto wa boyambi boye o Israél té.
Matt LinVB 8:11  Yangó wâná nayébísí bínó : Bato míngi bakoyâ, bakoúta o Esti mpé o Wésti mpé bakolía limpáti o Bokonzi bwa Likoló esíká yǒ kó na Abaráma, na Izáka mpé na Yakób.
Matt LinVB 8:12  Kasi bakobwáka bána ba Bokonzi o libá­ndá, o káti ya molílí ; kúná bakolela mpé bakolía míno. »
Matt LinVB 8:13  Mpé alobí na komandá : « Kendé, likambo oséngí na boyambi, lísálema ! » Mosáleli abíkí sé o ngonga êná.
Matt LinVB 8:14  Ekómí Yézu o ndáko ya Pétro, akútí bokiló wa yě o mbéto, azalákí koyóka féfele.
Matt LinVB 8:15  Yézu asímbí lobóko la yě, féfele etíkí yě. Bokiló wa Pétro atélémí mpé apésí Yézu biléi.
Matt LinVB 8:16  Na mpókwa bayélí yě bato baíké bakangémí na bilímo bibé. Na liloba lyǒ kó abengání bilímo mpé abíkísí bato bánso bazalákí na bokono.
Matt LinVB 8:17  Akokísí bôngó maloba ma proféta Izáya : Akamátí malózí ma bísó o nzóto ya yě, amemí makono ma bísó.
Matt LinVB 8:18  Emóní Yézu ’te bato míngi bazalákí kozínga yě, atíndí ’te bákátisa ngámbo.
Matt LinVB 8:19  Motéyi wa Mobéko mǒkó abelémí, alobí na yě : « Motéyi, nakolanda yǒ bipái bínso okokende. »
Matt LinVB 8:20  Yézu alobí na yě : « Ga­mbala izalí na mabúlú o mabelé, ndeke ikotóngaka zúmbu o nzeté ; kasi Mwána wa Moto azalí na esí­ká ya kolálisa motó té. »
Matt LinVB 8:21  Moyékoli wa yě mosúsu alobí na yě : « Mokonzi, tíká nákende libosó koku­nda tatá. »
Matt LinVB 8:22  Kasi Yézu alobí : « Landá ngáí, tíká bato bawéí bákunda bawéi ba bangó. »
Matt LinVB 8:23  Na nsima Yézu akwélí o bwáto, bayékoli ba yě balandí yě.
Matt LinVB 8:24  Na mbálákáká mbóngé iyéí makási mpé mái makótí o bwáto. Kasi Yézu azalákí kolála mpongí.
Matt LinVB 8:25  Bayékoli babelémí mpé balamúsí yě, balobí : « Mokonzi, bíkísá bísó, tolingí tókúfa ! »
Matt LinVB 8:26  Azóngísí : « Mpô níni bozalí kobánga, bínó bato ba boyambi botaú ? » Atélémí, agángélí mompepe na mbú, mpé mái makómí nyê.
Matt LinVB 8:27  Bato bakámwí míngi mpe­nzá, balobí : « Moto óyo ndé náni ’te mompepe na mbú izalí kotósa yě ? »
Matt LinVB 8:28  Ntángo Yézu akómí o ngámbo, o mokili mwa ba-Gadara, bato bábalé bayéí kokútana na yě. Bazalákí na bazábolo o nzóto mpé baútí o malíta. Bazalákí kotomboko míngi mpenzá ; bôngó moto mǒkó akokí koleka o nzelá êná té.
Matt LinVB 8:29  Babandí kogánga : « Mwána wa Nzámbe, bísó na yǒ likambo níni ? Oyéí áwa ndé konyókolo bísó, atá elaká ya bísó ekokí naíno té ? »
Matt LinVB 8:30  Etónga enéne ya ngúlu ezalákí kolía wâná mosíká té.
Matt LinVB 8:31  Bazábolo babóndélí Yézu : « Sókó obengání bísó, tíndá bísó o etónga êná ya ngúlu. »
Matt LinVB 8:32  Yézu alobí na bangó : « Bókende. » Babimí ; eyíngélí bangó o ngúlu, út’o ngómbá etónga mobimba ya ngúlu emíbwákí o etíma, ekúfí o mái.
Matt LinVB 8:33  Bakéngeli bakímí, bakeí o mbóka koyébisa mánso, ná mpé maye makwêlákí bato bakangémákí na bazábolo.
Matt LinVB 8:34  Bato bánso ba mbóka babimí mpô ya kokútana na Yézu. Awa bamóní yě, babóndélí yě ’te álongwa o mokili mwa bangó.