Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
NUMBERS
Prev Up Next
Chapter 6
Numb LinVB 6:2  « Loba na bana ba Israel : Soko mobali to mwasi alingi kolakela Yawe ’te akomikaba na ye, moto oyo amipesi bo­ngo,
Numb LinVB 6:3  atika komele vino na lotoko, ati­ka komele masanga makasi maye mauti na vino mpe na lotoko, amele mai ma mbuma ya vino te, alia mpe mbuma ya vino te, ya mobesu to ya kokauka.
Numb LinVB 6:4  Eleko mobimba ya bomikabi na Nzambe, alia mbuma yoko ya nzete ya vino te, ndika te, lomposo mpe te.
Numb LinVB 6:5  Eleko mobimba ya bomikabi na Nzambe lotebu lokata nsuki ya motó mwa ye te. Akozala mosantu tee mikolo mya bomikabi na Nza­mbe mikoki, mpe atika nsuki ya motó mwa ye ikola.
Numb LinVB 6:6  Eleko mobimba ya bomikabi na Nzambe, akoma penepenene na ebembe te.
Numb LinVB 6:7  Soko tata to mama, ndeko mobali to mwasi akufi, akoma penepene te mpo azwa mbi­ndo te, zambi motó mwa ye molakisi ’te amikabi na Nzambe.
Numb LinVB 6:8  Eleko mobimba ya bomikabi na Nzambe, abo­nzami na Yawe.
Numb LinVB 6:9  Soko moto moko akufi liwa lya mbalakaka penepene na ye, bongo mo­tó mosantu mwa ye mokomi na mbindo, akokola motó mwa ye o mokolo mwa bopetoli, akokola nsuki o mokolo mwa nsambo.
Numb LinVB 6:10  O mokolo mwa mwambi ayela nganga Nzambe bikokoba bibale to bibenga bibale, ameme byango o esika bakoyingelaka o Ema ya Likita.
Numb LinVB 6:11  Nganga Nza-mbe abonza yoko mpo ya kolimbisa lisumu lya ye, mpe yoko mpo ya kokumisa Yawe. Na nsima asala milulu mya bolongoli mbindo eye azwaki ntango akomaki penepene na ebembe. Bobele o mokolo mona, moto amikabi na Nzambe, asantisa motó mwa ye lisusu ;
Numb LinVB 6:12  amikaba na Nzambe lisusu mpo ya elako ya nazir alakelaki, aya na mwana mpata yoko ya mbula yoko, abonza libonza mpo ya kofuta mabe ma ye. Batala eleko ya liboso ya bomikabi te, zambi nsuki ya ye ikomaki na mbindo.
Numb LinVB 6:13  Tala boniboni moto amikabi na Nzambe asengeli kosala o mokolo eleko ya bomikabi esili. Bakende na ye o monoko mwa Ema ya Likita.
Numb LinVB 6:14  Abonzela Yawe libonza : bo libonza lya kotumba apesa mwana mpata mo­bali, ya mbula yoko, ezala na mbeba te ; bo moboma mwa kozwa bolimbisi masumu apesa mwana mpata mwasi, ya mbula yoko, ezala na mbeba te ; bo moboma mwa bondeko, apesa mpata mobali yoko, ezala na mbeba te.
Numb LinVB 6:15  Aya naino na ekoló ya mampa malambami na fufu, maye mazangi nkisi ya mampa, kasi malambami na mafuta, na mpe minkate miye mizangi nkisi ya mampa, kasi milambami na mafuta ; babakisa mabonza ma bolei na mabonza ma bomeli.
Numb LinVB 6:16  Nganga Nzambe aya na binso o miso ma Yawe, mpe abonza moboma mwa bolimbisi masumu na libo­nza lya kotumba o nkombo ya moto amikabi na Nzambe.
Numb LinVB 6:17  Moto oyo aka­mata mpata mobali na mampa mavimbi te mazali o ekoló mpo abonza moboma mwa bondeko. Mpe nganga Nzambe abonza libonza lina elongo na mabonza ma bomeli.
Numb LinVB 6:18  Na nsima moto amikabi na Nzambe akokola motó mwa ye mosantu, penepene na monoko mwa Ema ya Likita, abwaka nsuki ya motó mosantu mwa ye o móto mwa moboma mwa bondeko.
Numb LinVB 6:19  Nganga Nzambe akamata lipeke lya mpata mobali lisili kolambama, na limpa lizali na nkisi te, liye liuti o ekoló, na monkate moko mozangi nkisi. Atia yango o maboko ma moto amikabi na Nzambe, awa asili kokata nsuki ya ye.
Numb LinVB 6:20  Atombola libonza mpo ’te alakisa Yawe yango. Ezali eloko esantu, basengeli kobo-nzela nganga Nzambe, ata azwaki ntolo na ebelo ya mpata liboso. Na nsima moto amikabi na Nzambe ndakoki komele vino.
Numb LinVB 6:21  Mobeko moye motali nazir, moto oyo amikabi na Nzambe, oyo alakeli Nzambe elako : akobonzela Yawe libonza mpo ya elako ya bomikabi na Nzambe. Soko alingi, akoki kobakisa biloko bisusu. Akokisa bongo elako alakelaki Nzambe se lokola mobeko mwa bomibaki motindi. »
Numb LinVB 6:23  « Loba na Aron mpe na baninga ba ye : Boyoka boniboni nalingi bobenisa bana ba Israel. Boloba na bango :
Numb LinVB 6:25  Yawe atala bino na bolingi mpe apesa bino bolamu !
Numb LinVB 6:26  Yawe alakisa elongi polele mpe ayela bino boboto !
Numb LinVB 6:27  Bapesa bana ba Israel nkombo ya ngai, bongo nakobenisa bango. »