Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
PROVERBS
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 17
Prov LinVB 17:1  Kolia mwa limpa likauki o ndako ya bato ba kimia eleki kolia limpati linene o ndako ya boswani.
Prov LinVB 17:2  Mosali wa mayele akokoma mokonzi wa mwana alongobani te, akosangola biloko bya tata elongo na bana.
Prov LinVB 17:3  Bakonyangwisaka palata o kopo mpe wolo o fulu, kasi se Yawe akomeka mitema mya bato.
Prov LinVB 17:4  Moto mabe akotiaka matoi na maloba mabe, moto wa lokuta akondimaka monoko mwa mokosi.
Prov LinVB 17:5  Moto aseki mobola, atumoli Mozalisi wa ye, oyo asepeli mpasi ekweli moninga, akozwa etumbu.
Prov LinVB 17:6  Lokumu la babange, nde bankoko ba bango, lokumu la bana, nde tata wa bango.
Prov LinVB 17:7  Maloba ma bonkonde makoki na moto zoba te, monoko mwa lokuta mobongi na nkumu te.
Prov LinVB 17:8  Mabonza mazali nkisi o maboko ma moto azali na mango, ata akokende wapi, akolonga o makambo ma ye.
Prov LinVB 17:9  Moto alingi bondeko akolimbisa mabe basali ye ; oyo akundoli mango, akobengana moninga.
Prov LinVB 17:10  Kopalela moto wa mayele ekoki kobongisa ye, kobete moto zoba mbala nkama ekobongisa ye te.
Prov LinVB 17:11  Moto mabe alingi se kotomboko, kasi bakotindela ye ntoma wa nsomo.
Prov LinVB 17:12  Kokutana na mama nkoi eye babotoli bana, ezali mabe, kasi kozwana na moto zoba angali na nkanda, eleki naino mabe.
Prov LinVB 17:13  Soko ozongisi mabe na moto asali yo malamu, mpasi ekozanga o ndako ya yo te.
Prov LinVB 17:14  Kobanda boswani ezali lokola kofungola nzela enene ya mai, tika boswani liboso ’te ekoma etumba.
Prov LinVB 17:15  Kolongisa moto wa makambo mpe kokitisa moto semba, yango nde makambo mabale Yawe akoyokaka nsomo.
Prov LinVB 17:16  Mosolo o maboko ma moto zoba, mokozwela ye nini ? Asomba na mwango bwanya ? Kasi azangi mayele.
Prov LinVB 17:17  Moninga wa motema akolingaka yo ntango inso, kasi ndeko abotami se mpo ’te asalisa yo o mikolo mya mpasi.
Prov LinVB 17:18  Moto azangi mayele akokata mondenge mpe akomitia ndanga mpo ya moninga.
Prov LinVB 17:19  Moto alingi boswani, aluki makambo, oyo alingi komitombola, akosuka noki.
Prov LinVB 17:20  Moto wa motema mabe akozwa bolamu te, oyo akolobaka maloba ma lokuta akokoma na mpasi.
Prov LinVB 17:21  Moto aboti zoba, akoyoka mawa mingi, tata wa elema akoyoka esengo te !
Prov LinVB 17:22  Kozala motema esengo ekosalisa kobikisa nzoto, kozala motema mawa mawa ekokaukisa minkuwa.
Prov LinVB 17:23  Moto mabe akoyambaka mabonza ma bonkutu, mpo ’te abebisa mibeko mya bosembo.
Prov LinVB 17:24  Moto wa mayele akolukaka bwanya ntango inso, kasi zoba akotambwisaka miso tee ndelo ya mokili.
Prov LinVB 17:25  Mwana zoba azali ntina ya mawa ma tata wa ye, mpe akoyokisa mama wa ye mpasi mingi.
Prov LinVB 17:26  Kopesa moto semba etumbu, ebongi soki te, kotumbola moto wa lokumu ebongi mpe te.
Prov LinVB 17:27  Moto ayebi kokanga monoko, atondi na bwanya, mpe oyo azali na motema mpio, azali moto wa mayele.
Prov LinVB 17:28  Ata elema akomonono moto wa bwanya soko akangi monoko, akomonono moto wa mayele soko ayebi kokanga mbebu ya ye.