PROVERBS
Chapter 29
| Prov | LinVB | 29:1 | Moto aboyi komibongisa, ata bapaleli ye, akokita na mbalakaka, mpe akobika lisusu te. | |
| Prov | LinVB | 29:2 | Ntango basemba bayangeli mokili, banso bakosepela ; ekoyangela bato babe, banso bakokimela. | |
| Prov | LinVB | 29:3 | Moto alingi bwanya akosepelisa tata wa ye, oyo akolanda bandumba, akobebisa mbongo ya ye. | |
| Prov | LinVB | 29:4 | Mokonzi wa bosembo akobongisa ekolo ya ye, oyo akofutisaka bato ba ye mpako ebele, akobebisa yango. | |
| Prov | LinVB | 29:6 | Motambo mobombami o lisumu lya moto mabe, kasi moto semba akosepelaka mpe akoyokaka esengo. | |
| Prov | LinVB | 29:7 | Moto semba ayebi mpasi ya bato babola, kasi moto mabe azangi mayele mpo ya koyeba yango. | |
| Prov | LinVB | 29:8 | Bato bakosekeke baninga bakotia mobulu o mboka, kasi bato ba bwanya bakosilisa nkanda. | |
| Prov | LinVB | 29:10 | Bato bakobomaka baninga, bakoyinaka moto wa bosembo, kasi basemba bakoluka na ye bondeko. | |
| Prov | LinVB | 29:12 | Soko mokonzi akotiaka matoi na maloba ma lokuta, basali ba ye banso bakokoma bato babe. | |
| Prov | LinVB | 29:15 | Fimbo na bopaleli bikopesaka bwanya, kasi mwana azangi mobokoli, akoyokisa mama wa ye nsoni. | |
| Prov | LinVB | 29:16 | Soko bato babe bayangeli ekolo, masumu makomi mingi, kasi basemba bakosepela na bomoni ’te bakwei. | |
| Prov | LinVB | 29:18 | Soko baprofeta bazali te, bato bakomi mobulu, kasi oyo akotosaka Mobeko azali na esengo. | |
| Prov | LinVB | 29:20 | Soko omoni moto akolobaka noki liboso ’te akanisa, malamu otia motema na moto zoba. | |
| Prov | LinVB | 29:24 | Moto ayokani na moyibi, akomisala mabe, ata nalayisa ndai na baye bayebi, akoloba eloko te. | |
| Prov | LinVB | 29:25 | Moto abangi miso ma bato akoti o motambo, oyo akotiaka motema na Yawe, akofanda kimia. | |
| Prov | LinVB | 29:26 | Bato mingi bakoluka bondeko na mokonzi, kasi Yawe akopesaka moto na moto eye ekoki na ye. | |