Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
SIRACH
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 13
Sira LinVB 13:1  Moto akosimba mbiko akomibebisa nzoto, oyo akolanda moto wa lofundo, akokoma lokola ye.
Sira LinVB 13:2  Okumba mokumba te, moye moleki bozito ; otambola te na moto oyo aleki yo na makasi to na nkita. Bakotiaka nde mbeki ya mabelé na mbeki ya ebende esika yoko ? Soko itutani, mbeki ya mabelé ekobolana.
Sira LinVB 13:3  Soko moto wa nkita abebisi bosembo, akobete ntolo ; soko bayokisi mobola mpasi, akoki se komilela.
Sira LinVB 13:4  Soko okoki kozwela moto wa nki­ta litomba, akosilisa biloko bya yo ; kasi mokolo okwei, akokima yo.
Sira LinVB 13:5  Ntango ozali na biloko, akoya ko­fandisa yo, mpe akosilisa biloko bya yo, mawa te.
Sira LinVB 13:6  Soko asengeli na yo, akokosa yo, akolobisa yo malamu mpo ’te apesa yo elikya, mpe na maloba ma boleti akotuna yo : « Násalisa yo na nini ? »
Sira LinVB 13:7  Akobyanga yo o limpati mpe ako­yokisa yo nsoni, akosilisa mbo­ngo ya yo mbala ibale, ata mbala isato, mpe na nsima akotiola yo. Mokolo bokokutana lisusu, akosala lokola ayebi yo te, mpe akoningisa motó mpo ya koseke yo.
Sira LinVB 13:8  Keba ’te bakosa yo te, bongo oyoka nsoni mpo ya bozoba bwa yo te.
Sira LinVB 13:9  Soko moto monene abyangi yo, omibenda, mpo akobyanga yo noki.
Sira LinVB 13:10  Okende mbangu te, mpo babe­ngana yo te, otikala mpe mosika te, mpo babosana yo te.
Sira LinVB 13:11  Osololisa ye te lokola moto akokani na ye, mpe otia motema na maloba ma ye ebele te. Mpamba te, akomeka yo na maloba mingi, akosekisa yo mpo ayeba motema mwa yo.
Sira LinVB 13:12  Maye okoyebisa ye moko, akopa­nza mango, mbele akonyokolo yo mpe akokotisa yo o boloko.
Sira LinVB 13:13  Bongo omikengele mpe ozala na bokebi, soki te, akosukisa yo noki. (
Sira LinVB 13:15  Bikelamo binso bilingi baninga ba bango, na bato se bongo.
Sira LinVB 13:16  Bikelamo binso bikosanganaka engebene na ndenge ya byango, moto mpe akolukaka moninga wa ye moto.
Sira LinVB 13:17  Nkoi na mpata ikoki nde koyokana ? Se bongo mosumuki na moto malamu.
Sira LinVB 13:18  Ekange na mbwa ikoki nde kofa­nda na boboto ? Bondeko bokoki nde kozala kati ya mobola na moto wa nkita ?
Sira LinVB 13:19  Mpunda ya zamba ikoliamaka na ntambwe o eliki, se bongo bato ba nkita bakoliaka babola.
Sira LinVB 13:20  Bosawa bokoyokisaka moto wa lo­lendo nsomo, se bongo mobola ako­yokisaka moto wa nkita nsomo.
Sira LinVB 13:21  Soko moto wa nkita akwei, bani­nga bakosalisa ye, soko moto wa mawa akwei, baninga bakokima ye.
Sira LinVB 13:22  Soko moto wa nkita atuti libaku, bato mingi bakoya kosalisa ye ; ata alobi maloba ma bozoba, bako­ndimela ye. Kasi soko moto moke atuti libaku, bakopalela ye ; soko alobi malamu, bakotala maloba ma ye mpamba.
Sira LinVB 13:23  Ekoloba moto wa nkita, banso bakokanga monoko, mpe bakokumisa maloba ma ye. Ekoloba mobola, bakotuna : « Oyo nde nani ? » Soko atuti libaku, bakopusa ye mpo ’te akweya.
Sira LinVB 13:24  Nkita ezali malamu soko ezangi masumu ; bobola bozali mabe soko bouti na lolendo.
Sira LinVB 13:25  Elongi ya moto ekolakisaka motema mwa ye, motema mózala malamu to mabe.
Sira LinVB 13:26  Elongi polele ekolakisaka motema esengo ; kobimisa biyele, yango nde mosala mwa mpasi.