Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
SIRACH
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 25
Sira LinVB 25:1  Makambo masato makosepelisaka ngai, maye maleki bolamu o miso ma Mokonzi mpe o miso ma bato : boyokani o kati ya bandeko, bolingani o kati ya bayebani, na mpe mobali na mwasi bakoyokanaka malamu.
Sira LinVB 25:2  Nayini bato baye basato, mpo bakoyokisaka ngai nkanda na ezalela ya bango : mobola atondi na lo­fu­ndo, moto wa nkita azangi bose­mbo, na mobange akosalaka bokali mpe azangi mayele.
Sira LinVB 25:3  Soko osangisaki biloko te o nta­ngo ozalaki elenge, ndenge nini akozala na eloko ntango okokoma mobange ?
Sira LinVB 25:4  Esengo ya komono moto wa nsuki mpembe ayebi kokata maka­mbo, mpe bakolo ba mboka bayebi kopesa malako malamu,
Sira LinVB 25:5  mobange azali moto wa bwanya, mpe bankumu bazali na makanisi malongobani.
Sira LinVB 25:6  Enkoti o motó mwa mobange, nde mayele ma bomoto, litundu lya bango, nde bobangi Mokonzi.
Sira LinVB 25:7  Nakomonoko makambo libwa makambo ma esengo, mpe nakoki kotangela bino likambo lya zomi : tata oyo akoki kosepela mpo ya bana ba ye, na oyo azali naino na bomoi ntango banguna ba ye basuki.
Sira LinVB 25:8  Esengo na moto azali na mwasi wa mayele, mpe azali na ye motema moko o mosala, oyo azwi likambo mpo ya maloba mokolo moko te, mpe oyo asengeli kosalela mokonzi te, oyo abongi na ye te.
Sira LinVB 25:9  Esengo na moto oyo azwi mayele ma bomoto, mpe oyo azwi bato bandimi koyoka ye.
Sira LinVB 25:10  Moto akomi na bwanya azali moto monene solo, kasi oyo akoba­ngaka Mokonzi aleki banso.
Sira LinVB 25:11  Bobangi Mokonzi boleki maka­mbo manso na bolamu : Nani akokani nde na oyo akobanga Mokonzi ? (
Sira LinVB 25:13  O kati ya mpota inso, mpota ya motema eleki mpasi, o kati ya mayele mabe manso, maye ma mwasi maleki mpasi.
Sira LinVB 25:14  Mpasi eleki makasi nde mpasi mo­nguna ayokisi yo ; o kati ya bitu­mbu bakateli to, eye monguna aka­teli yo eleki mabe !
Sira LinVB 25:15  Ngenge eleki mabe, ngenge ya nyo­ka ; nkanda eleki mabe, nka­nda ya mwasi.
Sira LinVB 25:16  Kofanda na ntambwe to na ebuki ya nyama ezali mabe, kasi kofa­nda na mwasi wa mayele mabe ele­ki mabe.
Sira LinVB 25:17  Mayele mabe makobongolaka miso ma mwasi, makokangisaka ye elo­ngi lokola mokomboso.
Sira LinVB 25:18  Ata akei kolia epai ya baninga, mo­bali wa ye azali se kokimela.
Sira LinVB 25:19  Mayele mabe ma mwasi maleki mayele mabe manso ; mwasi wa mayele mabe azwa etumbu ekoki na basumuki !
Sira LinVB 25:20  Soko moto wa boboto abali mwasi apusi monoko, akoyoka mpasi lokola mpasi ya mobange akei nzela ya zelo zelo.
Sira LinVB 25:21  Bonzenga bwa mwasi bozalela yo motambo te, olula ye mpo ya nzo­to ya ye te.
Sira LinVB 25:22  Mobali oyo akobikaka na mbo­ngo ya mwasi, akomilukela maka­mbo ma nkanda, mindondo na nsoni mingi.
Sira LinVB 25:23  Mwasi wa mayele mabe akole­mbisa mobali motema, akoyokisa ye mawa mpe akozokisa ye motema. Na maboko mayebi mosala te mpe na makolo mazangi makasi, mwasi akoki koyokisa mobali wa ye esengo te.
Sira LinVB 25:24  Lisumu lya yambo libandaki na mwasi, mpo ya ye biso banso tosengeli kowa.
Sira LinVB 25:25  Kangisa mai masopana te, olingisa mwasi wa mayele mabe koloba te.