Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
SIRACH
Prev Up Next
Chapter 42
Sira LinVB 42:1  Kasi makambo masusu, oyoka mango nsoni te, (mpe osala mabe te mpo ya bobangi miso ma bato) :
Sira LinVB 42:2  Oyoka nsoni te mpo ya kotosa mibeko mya Nzambe, mpo ya ko­memya bondeko bwa ye mpe kokitisa mosumuki.
Sira LinVB 42:3  Oyoka nsoni te mpo ya kotanga elongo na moninga mbongo boni moko moko abimisi, to mpo ya kopesa bato biloko biye bawei batikeli bango ;
Sira LinVB 42:4  mpo ya kotala soko emekeli ya biloko ebongi solo, mpo ya kozwa litomba like to linene.
Sira LinVB 42:5  Oyoka nsoni te soko ozali kozwa litomba na mombongo mwa yo, soko obokoli bana ba yo na miso makasi, to soko obeti moombo oyo akosalaka mabe.
Sira LinVB 42:6  Soko ozali na mwasi alingi kotala biloko binso, kanga sanduku ya yo na bikangeli ; soko ozali na bato mingi o ndako, kanga biloko bya yo na lifungola.
Sira LinVB 42:7  Biloko olingi kobombisa epai ya moto mosusu, tanga byango mpe meka bozito bwa byango. Soko odefi eloko ya moto to odefisi, koma makambo manso o mo­nka­nda.
Sira LinVB 42:8  Oyoka nsoni te mpo ya kopalela elema mpe moto zoba, na mpe mobange oyo akosalaka bosoni. Okomilakisa bongo moto wa mayele solo, mpe bato banso bako­ndima yo.
Sira LinVB 42:9  Tata oyo aboti mwana mwasi akozala ntango inso motema likolo, akomitungisa mpo ya ye, mpongi ekokima ye na butu. Soko abali naino te, akobanga ’te bakobala ye te ; soko asili abali, akobanga ’te mobali akoboya ye.
Sira LinVB 42:10  Soko azali naino ngondo, akoba­nga ’te bakosenginya ye, mpe ako­kwela zemi o ndako ya ye. Soko azali na libala, akoki kokosa mobali wa ye, to mpe azali o ndako ya mobali, kasi akobota te.
Sira LinVB 42:11  Soko ozali na mwana mwasi aboyi kotosa, kengele ye malamu ; soki te, akosala ’te banguna baya kotiola yo, bato ba mboka mobimba baya kotonda mpo ya koseke yo, mpe osambwa o miso ma bato ba­nso.
Sira LinVB 42:12  Alakisa bonzenga bwa ye na mobali moko te, asolola na basi te.
Sira LinVB 42:13  Lokola mpanda ekoutaka o bilamba, se bongo bobe bwa mwasi moko bokoleka epai ya mwasi mosusu.
Sira LinVB 42:14  Mobali wa matata aleki mwasi wa boboto. Mwasi akeba na maka­mbo manso makoki koyokisa ye nsoni.
Sira LinVB 42:15  Sikawa nakokundola bikela bya Nzambe, nakoyebisa yo maye namoni : akeli binso na Liloba lya ye.
Sira LinVB 42:16  Mwese mokongengeleke biloko binso, mosala mwa Mokonzi motondi na nkembo ya ye.
Sira LinVB 42:17  Ata banzelu ba Mokonzi bakoki kosakola makamwa ma ye manso te, maye Mokonzi wa bokasi bo­nso abongisaki mpo ’te molóngó mobimba mozala mpo ya nkembo ya ye.
Sira LinVB 42:18  Ayebi bozindo bwa mbu mpe makanisi ma mitema mya bato, mpo Nzambe wa Nta Likolo ayebi ma­nso, mpe akomonoko makambo manso makosalema.
Sira LinVB 42:19  Akosakolaka makambo masili ma­leki na maye makoya, akoyebisaka maye mabombami.
Sira LinVB 42:20  Abungi ata likanisi lyoko te, liloba lyoko mpe te.
Sira LinVB 42:21  Abongisi bikela bya bwanya bwa ye malamu mpenza, akobongwanaka te ut’o libandela kin’o lobiko. Bakoki kopesa to kobotolo ye eloko te, asengeli na malako ma moto moko te.
Sira LinVB 42:22  Bikelamo bya ye binso bipusi bo­nzenga, ata mwa mololi ekoka­mwisaka.
Sira LinVB 42:23  Biye binso bizali na bomoi mpe bi­koumela seko, mpe bikotosaka ye o makambo manso.
Sira LinVB 42:24  Bikelamo binso bizali bibale bibale, asali eloko yoko te eye ebongi mpenza te.
Sira LinVB 42:25  Ekelamo yoko ekolakisaka ’te eke­lamo esusu ebongi nye. Nani moto akolembe kotala nkembo ya Mokonzi ?