Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
SIRACH
Prev Up Next
Chapter 48
Sira LinVB 48:1  Na nsima profeta Elia abimi lokola móto, maloba ma ye mazalaki lokola esungi epeli móto.
Sira LinVB 48:2  Ye moto abyangi nzala o ekolo ya Israel ; mpo ya mpiko ya ye o mosala abomi bato ebele.
Sira LinVB 48:3  Na liloba lya Mokonzi akangisi mbula, mpe akitisi móto mwa likolo mbala isato.
Sira LinVB 48:4  Solo, Elia, ozwi lokumu mingi na makamwisi ma yo ! Nani akoki ko­mikumisa ’te akokani na yo ?
Sira LinVB 48:5  Osekwisi moto awei, obikisi ye o mboka ya bawa na liloba lya Mokonzi.
Sira LinVB 48:6  Okweisi bakonzi ba nse, bato banene balongwi o mbeto ya bango lisusu te.
Sira LinVB 48:7  O ngomba Sinai oyoki bopaleli bwa Nzambe, o ngomba Oreb oyoki mikano mya bobekoli.
Sira LinVB 48:8  Opakoli bakonzi mafuta mpo ’te babekola bato mabe ma bango, opakoli baprofeta mafuta mpo ’te bakitana yo.
Sira LinVB 48:9  Otombwami o likolo o ntei ya mompepe mwa móto, bamemeki yo na likalo libendami na farasa ya móto.
Sira LinVB 48:10  Nzambe aponi yo mpo ’te opalela bato bakoya nsima, okitisa bongo nkanda ya ye, engala te, mpe ozo­ngisa bondeko kati ya batata na bana, bongo opesa lisusu mabota ma Yakob bokasi.
Sira LinVB 48:11  Esengo na bato bakomono yo, mpe na baye bawei o bondeko bwa Nzambe, zambi biso mpe tokozwa bomoi bwa solo.
Sira LinVB 48:12  Awa Elia alimwaki bongo o mo­mpepe mwa móto, Elizeo atondaki na elimo wa ye. O bomoi bwa ye mobimba mokonzi moko aba­ngisaki ye te, mpe moto moko te akokaki kotinda ye ata nini.
Sira LinVB 48:13  Mosala moko molekaki ye makasi te, ata nsima ya liwa nzoto ya ye esali makamwisi.
Sira LinVB 48:14  Ntango azalaki na bomoi asali makamwisi, nsima ya liwa lya ye mpe misala mya ye mikamwisaki bato.
Sira LinVB 48:15  Ata bongo, bato babongoli mitema te, baboyi masumu ma bango te, kina bakambami mosika na eko­lo ya bango mpe bapanzani o nse mobimba.
Sira LinVB 48:16  Etikali bongo se mwa ndambo ya bato, na moyangeli moko wa libota lya Davidi. O kati ya bango basusu basepelisi Nzambe, kasi basusu bakobi kosala masumu.
Sira LinVB 48:17  Ezekia alendisi engumba ya ye, mpe abendi mai tee o kati ya bifelo bya yango. Na bibende atimoli nzela o kati ya mabanga mpe bitima mpo ya kobomba mai.
Sira LinVB 48:18  O eleko ena Senakerib akei etu­mba mpe atindi ntoma wa ye, ato­mboli loboko mpo ya kosala Sion mabe, mpe afundi na lolendo la ye.
Sira LinVB 48:19  Mitema mpe maboko ma bango makomi kolenge, bakomi na mpasi lokola mwasi alingi abota.
Sira LinVB 48:20  Babeleli Nzambe Mokonzi wa ngo­lu, batomboli maboko epai ya ye. Ut’o likolo Mosantu andimeli bango noki mpenza, mpe abikisi bango na maboko ma Izaya.
Sira LinVB 48:21  Asukisi bato ba nganda ya ba-Asur, anzelu wa ye asilisi bango nye,
Sira LinVB 48:22  mpo Ezekia asalaki maye masepelisi Mokonzi, alongwi o nzela ya tata wa ye Davidi te, lokola profeta Izaya alakisaki ye, oyo azalaki moto monene mpe momoni makambo wa solo.
Sira LinVB 48:23  O mikolo mya ye mwese mozo­ngaki nsima, mpo ’te mokonzi atikala naino na bomoi.
Sira LinVB 48:24  Na mayele ma Nzambe amoni nsu­ka ya mokili mpe abondi mitema mya bato bazalaki na mpasi o Sion.
Sira LinVB 48:25  Ayebisi makambo makoya tee o mokolo mwa nsuka, mpe ayebisi maye mayebani naino te liboso ’te masalema.