Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
GENESIS
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 12
Gene LinVB 12:1  Mokolo moko Yawe alobi na Abram : « Tika ekolo ya yo, na libota lya yo, na ndako ya tata wa yo, mpe kende o ekolo nako­lakisa yo.
Gene LinVB 12:2  Nakokomisa yo tata wa bato ebele. Nakobenisa yo mpe nakosala ’te nkombo ya yo ezwa lokumu ; bongo bato bakota­nga ya­ngo bazwa bobenisi.
Gene LinVB 12:3  Nakobenisa baye bakobenisa yo, nakoboya baye bakotombela yo bo­be ; bato ba bikolo binso bya mo­kili bakozwa bobenisi mpo ya yo. »
Gene LinVB 12:4  Abram akei lokola Yawe alobaki na ye, mpe Lot akei na ye elongo. Abram akokisi mibu ntuku nsa­mbo na mitano ntango alongwi o ekolo ya ye Aran.
Gene LinVB 12:5  Abram akei na mwasi wa ye Sarai, na Lot mwana wa ndeko wa ye, na biloko bya bango bi­nso, na basaleli azwaki o Aran. Bakei mpe bata­mboli tee bakomi o ekolo Kanana.
Gene LinVB 12:6  Abram akatisi ekolo mobimba tee akomi o esika esantu ya Sikem, epai ya nzete ya More. Ba-Kanana bazalaki bankolo ba mokili.
Gene LinVB 12:7  Yawe abimeli Abram, alobi na ye : « Nakopesa bana ba yo ekolo eye. » Abram atongi altare mpo ya kokumisa Yawe oyo amilakisaki na ye.
Gene LinVB 12:8  Na nsima alongwi wana, akei o ngomba epai ya Esti ya mboka Betel mpe kuna atelemisi ema ya ye, kati ya Betel o Westi mpe ya Ayi o Esti. Kuna atongeli Yawe altare mpe akumisi Yawe.
Gene LinVB 12:9  Na nsima Abram akobi mobembo mwa ye tee akomi o Negeb.
Gene LinVB 12:10  Nzala makasi ekweli ekolo mpe Abram akei kofanda o Ezipeti, mpo bokeleli bonene bongali o mokili.
Gene LinVB 12:11  Ekomi ye penepene na Ezipeti, alobi na mwasi wa ye Sarai : « Yoka, nayebi ’te ozali mwasi kitoko.
Gene LinVB 12:12  Soko ba-Ezipeti bamoni yo mpe balobi : ‘Azali mwasi wa ye’, bakoboma ngai, kasi bakotika yo.
Gene LinVB 12:13  Nabondeli yo, oloba na bango ’te ozali ndeko mwasi wa ngai mpo ’te basala ngai se malamu mpe nabika mpo ya yo. »
Gene LinVB 12:14  Ya solo, awa Abram ayingeli o Ezipeti, ba-Ezipeti bamoni ’te mwasi wa ye azali kitoko mpenza.
Gene LinVB 12:15  Basaleli ba Farao bamoni ye mpe bakumisi ye o miso ma Farao, bongo bakotisi mwasi o ndako enene ya Farao.
Gene LinVB 12:16  Mpo ya ye Farao asali Abram malamu mingi, apesi ye ngombe, mpata na mpunda, bao­mbo basi na babali, mpunda basi mpe kamela.
Gene LinVB 12:17  Kasi Yawe atindi mpasi ndenge na ndenge o libota lya Farao mpo ya Sarai, mwasi wa Abram.
Gene LinVB 12:18  Farao abengi Abram, alobi na ye : « Osalaki ngai nini ko ?
Gene LinVB 12:19  Mpo nini oyebisaki ngai te ’te ye azali mwasi wa yo ? Mpo nini olobaki ’te azali ndeko wa yo ? Nakamati ye lokola mwasi wa ngai ! Tala mwasi wa yo, kamata ye mpe ke­nde ! »
Gene LinVB 12:20  Atindi bato ba ye bazongisa Abram o ekolo ya ye, akende na mwasi wa ye mpe na biloko bya ye binso.