Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
GENESIS
Prev Up Next
Chapter 48
Gene LinVB 48:1  Esili makambo mana, bayei koyebisa Yosefu : « Tata wa yo azali kobele. » Bongo akei na bana ba ye babale, Manase na Efraim.
Gene LinVB 48:2  Balobi na Yakob : « Mwana wa yo Yosefu ayei. » Na makasi ma ye manso Israel amifandisi o mbeto.
Gene LinVB 48:3  Alobi na Yosefu : « Nzambe wa bokasi bonso abimelaki ngai o mboka Luz o mokili mwa Kanana, abenisaki ngai na maloba maye :
Gene LinVB 48:4  “Nakopesa yo nguya ya kobota mpo ’te ozwa bana baike. Nakokomisa yo lingomba linene lya bato. Nakopesa bankoko ba yo mokili moye, bafanda seko kuna.”
Gene LinVB 48:5  Yango wana bana ba yo babale, baye obotaki o mokili mwa Ezipeti, liboso ’te naya epai ya yo o Ezipeti, bakosala bana ba ngai ! Efraim na Manase bakozala bana ba ngai, se lokola Ruben na Simeon bazali bana ba ngai.
Gene LinVB 48:6  Bana obotaki nsima bakozala bana ba yo. O mokolo bakokabola mokili, bakozwa esika se l­o­kola bandeko ba bango.
Gene LinVB 48:7  Mokolo nalongwaki o Padan, mama wa yo Rakele awaki o mokili mwa Kanana o nzela penepene na Efrata. Nakundaki ye bobele kuna o nzela ya Efrata, o Beteleme. »
Gene LinVB 48:8  Israel amoni bana ba Yosefu, atuni : « Bango banani ? »
Gene LinVB 48:9  Yosefu azongiseli tata wa ye : « Bazali bana Nzambe akabeli ngai awa. » Tata alobi lisusu : « Yaka na bango awa, nabenisa bango. »
Gene LinVB 48:10  Miso ma Israel malembi mpo ya bonuna, azalaki komono malamu lisusu te. Yosefu ayei na bango penepene na tata. Israel ayambi bango mpe azingi bango ekopi.
Gene LinVB 48:11  Alobi na Yosefu : « Nakanisaki soki moke te ’te nakomono lisusu elongi ya yo, mpe tala, Nzambe amonisi ngai mpe bana ba yo. »
Gene LinVB 48:12  Yosefu alongoli bango o makolo ma tata wa ye mpe akumbami, elongi o nse.
Gene LinVB 48:13  Yosefu akamati bana ba ye babale, asimbi Efraim na loboko la mobali, mpo ’te azala o loboko la mwasi wa Israel ; asimbi Manase na loboko la mwasi mpo ’te azala o loboko la mobali la Israel, atii bango penepene na ye.
Gene LinVB 48:14  Kasi Israel atandi loboko la mobali o motó mwa Efraim, mwana wa nsuka, mpe loboko la mwasi o motó mwa Manase. Kasi, awa maboko matandami bongo, abungi, mpo Manase azali mwana wa yambo.
Gene LinVB 48:15  Abenisi Yosefu, alobi : « Nzambe oyo nkoko wa ngai Abarama mpe tata wa ngai Izaka batosaki, Oyo azalaki mokengeli wa ngai ut’o bomwana bwa ngai tee lelo,
Gene LinVB 48:16  Anzelu oyo abikisaki ngai o mabe manso, abenisa bana baye, bato banso bakumisa nkombo ya ngai na mpe nkombo ya batata ba ngai Abarama na Izaka mpo ya ba-ngo. Babota bana baike mpe bakoma bato ebele o mokili ! »
Gene LinVB 48:17  Ntango Yosefu amoni ’te tata wa ye atii loboko la mobali o motó mwa Efraim, mpo yango esepelisi ye te. Asimbi loboko la tata wa ye, mpo ’te alongola lango o motó mwa Efraim mpe atia lango o motó mwa Manase.
Gene LinVB 48:18  Alobi na tata wa ye : « Tata, bongo te, mwana oyo azali mwana wa yambo, tia loboko la mobali o motó mwa ye. »
Gene LinVB 48:19  Kasi tata wa ye aboyi, alobi : « Nayebi, mwana. Solo, ye mpe akokoma etuka enene, akozala moto monene, kasi leki wa ye akoleka ye, bankoko ba ye bakotondisa ekolo mobimba. »
Gene LinVB 48:20  O mokolo mona abenisi bango, alobi : « O Israel babenisa bato na nkombo ya yo na maloba maye : Nzambe asala yo malamu lokola asalaki Efraim na Manase. » Atangi nkombo ya Efraim liboso.
Gene LinVB 48:21  Na nsima Israel alobi na Yosefu : « Liwa lya ngai likomi penepene, kasi Nzambe akobatela yo, mpe akozongisa yo o mokili mwa ba-nkoko ba yo.
Gene LinVB 48:22  Nakopesa yo eteni ya mabelé lokola bandeko ba yo, kasi nakobakisela yo Sikem eye nabotoloki ba-Amon na mopanga mpe na litimbo. »