ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 18
Isai | LinVB | 18:2 | Yo moto okotindaka bantoma o nzela ya mbu, o bibei bisalemi na nkekele mpe na nkasa. Bokende mbangu, bino bantoma, epai ya bato balai na lomposo ngola, baye bato bakobangaka bipai binso, bato baye ba nguya balingi koyangela nse, o mokili mopaswani na bibale. | |
Isai | LinVB | 18:3 | Bino banso bato ba nse, bino bato bofandi o bikolo binso, bokomono ndenge bakotombola bendele o ngomba, bokoyoka ndenge bakobete mindule ! | |
Isai | LinVB | 18:4 | Mpo Yawe alobi na ngai boye : Nakofanda kimia mpe nakotala ut’o esika nazali, lokola molunge o ntango ya moi makasi, lokola limpata o ntango bakobukaka mbuma na moi makasi. | |
Isai | LinVB | 18:5 | Liboso lya kobuka mbuma, o eleko fulele isili, o ntango fulele ikomi mbuma iteli, bakokutolaka bitapi na mbeli, mpe bakolongolaka bitapi bileki mingi. | |
Isai | LinVB | 18:6 | Byango binso bikozala bya bingondo bya ngomba mpe bya nyama ya zamba. Bingondo bikofanda wana o eleko ya moi mpe nyama ya zamba o eleko ya mpio. | |
Isai | LinVB | 18:7 | O mokolo mona bakobonzela Yawe wa bokasi bonso mabonza, bato balai na lomposo ngola, baye bato bakobangaka bipai binso, bato baye ba nguya balingi koyangela nse, bato ba mokili moye mopaswani na bibale bakoyela Yawe wa bokasi bonso mabonza o esika bakokumisaka nkombo ya ye, o ngomba Sion. | |