Chapter 1
Mala | LinVB | 1:2 | Yawe alobi : « Nalingi bino », kasi bino bozongisi : « Olakisaki biso bolingi bwa yo na nini ? » Yawe alobi : Ezau azalaki ndeko wa Yakob te ? Nzokande nalingaki Yakob leka Ezau. | |
Mala | LinVB | 1:4 | Soko ba-Edom balobi : « Babebisi mboka ya biso, kasi tokotonga ndako ya biso lisusu », Yawe wa bokasi bonso akoloba : « Batonga, ngai nakobebisa yango lisusu ! » bakotanga bango ‘Mokili mwa masumu’ to ‘Ekolo Yawe apesa etumbu ekosila te’. | |
Mala | LinVB | 1:5 | Ntango bokomono yango na miso, bokoloba : Yawe azali monene, azali o likolo lya mokili mwa Israel ! | |
Mala | LinVB | 1:6 | Mwana akomemyaka tata wa ye, mosali akotosaka nkolo wa ye. Kasi soko nazali tata solo, wapi limemya bosengeli kolakisa ngai ? Soko nazali nkolo, wapi botosi bwa bino ? Yawe wa bokasi bonso atuni bino banganga Nzambe, bino bato bokokinolaka Nkombo ya ngai. Kasi bino bozali koloba : Tokinoli nkombo ya yo na nini ? | |
Mala | LinVB | 1:7 | Bino bokotiaka mabonza ma mbindo o altare ya ngai. Soko bokotuna lisusu : Ndenge nini tokomisi yo mbindo ? mpo bolobi : Tokoki kokinola meza ya Yawe. | |
Mala | LinVB | 1:8 | Soko bobonzeli ngai moboma mwa nyama ekufi miso, bosali mabe te ? Soko boyeli ngai nyama izali kotengola to nyama izali na bokono, bosali mabe te ? Yawe wa bokasi bonso atuni : « Soko bokei kopesa yango na moyangeli wa ekolo, akosepela solo ? Akoyamba yo malamu ? » | |
Mala | LinVB | 1:9 | Bokomekaka nde kobondela Nzambe bongo mpo ’te ayokela bino mawa ! Yawe wa bokasi bonso atuni : « Mpo ya mabonza maye mauti o maboko ma bino, náyamba bino nde malamu ? » | |
Mala | LinVB | 1:10 | Soko o kati ya bino moto moko akokaki kokanga bizibeli bya Tempelo, mpo ’te botika kotumba mabonza mpamba o altare ya ngai ? Yawe wa bokasi bonso alobi boye : « Nasepeli na bino soki moke te ; nakoyamba mabonza o maboko ma bino te. | |
Mala | LinVB | 1:11 | Banda nsuka ya mokili epai moi mokobimaka tee nsuka esusu epai moi mokokitaka Nkombo ya ngai ezali enene. » Yawe wa bokasi bonso alobi : « O bikolo binso mpe o bisika binso bakobonzelaka Nkombo ya ngai libonza lya mpaka na mpe libonza peto, mpo o bikolo binso Nkombo ya ngai ezali enene. » | |
Mala | LinVB | 1:12 | Kasi bino bokosantolaka Nkombo ya ngai na bolobi : « Meza ya Yawe ezali na mbindo, biloko bya meza ya Yawe bibongi te. » | |
Mala | LinVB | 1:13 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Bino bokolobaka : « Bomiyokisi mpasi se mpamba ! » mpe bokoboyaka byango na lofundo mpenza. Bokoyaka na nyama izali na mbeba, nyama ibukani makolo mpe izali na bokono, mpe bokobonzelaka ngai yango. Yawe atuni bino : « Nakoki nde koyamba yango o maboko ma bino ? » | |
Chapter 2
Mala | LinVB | 2:2 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Soko boyoki ngai te, mpe bolingi kokumisa Nkombo ya ngai te, nakosala ’te mabe makwela bino mpe bobenisi bwa bino. Nasili nasali bongo, mpo o ntei ya bino moto moko akokanisaka yango te. | |
Mala | LinVB | 2:3 | Nakolembisa maboko ma bino, mpe nakobwaka bipolu bya biyenga bya bino o bilongi bya bino ! Balongola bino bongo esika yoko na bipolu bina. | |
Mala | LinVB | 2:4 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Bokoyeba ’te nakebisi bino bongo mpo ’te bondeko bwa ngai na Levi bokufa te. | |
Mala | LinVB | 2:5 | Nayokanaki na ye ’te nakopesa bomoi na mpe boboto ; bongo ye azalaki kobanga ngai mpe komemya Nkombo ya ngai. | |
Mala | LinVB | 2:6 | Azalaki koteya mateya ma bosolo, mpe azalaki koloba mabe na monoko soki te. Azalaki kokende na ngai nzela yoko, nzela ya boboto mpe ya bosembo. Azalaki kobatela bato baike basala mabe te. | |
Mala | LinVB | 2:7 | Solo, nganga Nzambe asengeli kobatela mateya maye bato bakoluka o monoko mwa ye, mpo azali ntoma wa Yawe wa bokasi bonso. | |
Mala | LinVB | 2:8 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Kasi bino bolongwi o nzela ya solo, mpe bokweisi bato baike na mateya ma bino. Bobebisi bondeko nakataki naLevi ! | |
Mala | LinVB | 2:9 | Yango wana nakosala ’te bosambwa o miso ma bato banso, mpo bolandaki nzela ya ngai te, mpe o mateya ma bino botalaki bilongi bya bato. | |
Mala | LinVB | 2:10 | Banso tozali bana ba tata moko te ? Ezali se Nzambe moto akeli biso te ? Bongo mpo nini tozali kokosana mpe kobebisa bondeko Nzambe akataki na bankoko ba biso ? | |
Mala | LinVB | 2:11 | Yuda asuli, Israel na Yeruzalem basali mabe ma nsomo. Solo, Yuda asantoli esika esantu, esika eye Yawe alingi. Abali mwasi o ekolo ya nzambe mosusu. | |
Mala | LinVB | 2:12 | Molobeli mpe nzeneneke wa moto asali bongo, malamu Yawe alongola bango o ntei ya mabota ma Yakob mpe ya baye bakobonzelaka Yawe wa bokasi bonso mabonza. | |
Mala | LinVB | 2:13 | Likambo lya mabale bokosalaka : Bokopolisaka altare ya Yawe na mpizoli ; bokomilelaka mpe bokokimelaka mpo Yawe aboyi kotala mabonza ma bino mpe koyamba mango o maboko ma bino. | |
Mala | LinVB | 2:14 | Botuni : « Mpo nini Yawe asali bongo ? » Yawe asali bongo mpo azali nzeneneke kati ya bino na mwasi wa yo wa bolenge ; okosaki ye, ata azalaki moninga wa yo wa libala, oyo yo moko oponoki. | |
Mala | LinVB | 2:15 | Yawe akelaki se moto moko te, oyo azali na nzoto ya nsuni mpe na mpema ya bomoi ? Moto ona azali koluka nini ? Alingi ’te Nzambe apesa ye bana ! Yango wana memya bomoi bwa yo. Okosa mwasi wa yo te oyo obalaki o bolenge ! | |
Mala | LinVB | 2:16 | Mpamba te, Yawe Nzambe wa Israel alobi : Nayini moto abengani mwasi wa ye mpe amibebisi bongo na makambo mazangi bosembo. Bongo memya bomoi bwa yo, mpe okosa moninga wa libala te ! | |
Chapter 3
Mala | LinVB | 3:1 | Tala, nakotinda ntoma wa ngai. Akobongisa nzela liboso lya ngai. Akoyingela o Tempelo na mbalakaka, Mokonzi oyo boluki, na anzelu wa bondeko, oyo bolingi. Yawe wa bokasi bonso alobi : « Tala,azalikoya ! » | |
Mala | LinVB | 3:2 | Kasi nani akobika o mokolo mwa boyei bwa ye ? Nani akoteleme naino mokolo akobima ? Mpamba te, akozala lokola móto mwa motuli, mpe lokola mai ma mosukoli bilamba. | |
Mala | LinVB | 3:3 | Akofanda mpo ya konyangwisa mpe kopetola bana ba Levi, lokola bakopetolaka wolo na palata. Bongo nde bakoki kobonzela Yawe mabonza malongobani. | |
Mala | LinVB | 3:4 | Yawe akosepela lisusu na mabonza ma Yuda mpe ma Yeruzalem, lokola asepelaka na mango o ntango ya kala. | |
Mala | LinVB | 3:5 | Yawe wa bokasi bonso alobi : « Ntango nakoya kosambisa bino, nakofunda baye bakosalelaka banzambe ba lokuta, bato ba bokali, bato bakolayaka ndai ya lokuta na baye bakokutolaka lifuta lya basali, baye bakonyokoloko basi bazenge, bana bitike na bampaya, baye banso bakobangaka ngai te. | |
Mala | LinVB | 3:6 | Solo, ngai Yawe nakobongwanaka te. Kasi bino, bana ba Yakob, bokotikaka makambo ma bino te. | |
Mala | LinVB | 3:7 | Banda ntango ya bankoko bokotikaka mibeko mya ngai mpe bokotosaka myango te. Yawe wa bokasi bonso alobi : Bozongela ngai mpe ngai nakozongela bino ! Bino bolobi : « Tozonga ndenge nini ? » | |
Mala | LinVB | 3:8 | Moto akoki nde kokosa Nzambe ? Kasi bino bokokosaka ngai. Bolobi : « Tokosi ye ndenge nini ? » Bokokosaka ngai na makambo matali eteni ya zomi ya biloko mpe na bofuti mpako. | |
Mala | LinVB | 3:10 | Boyela ngai mpako ya bino mobimba o ndako ya mosolo, mpo ’te biloko bya bolei bikoka o ndako ya ngai, mpe bomeka ngai soko ya solo nakofungola maziba ma likolo te, mpo ya kosalisa bino mpe kobenisa bino na bopesi makabo ebele. | |
Mala | LinVB | 3:11 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Nakopekisa mapalela másilisa mbuma ya bilanga te, mpo ’te nzete ya vino ibota mbuma mingi. | |
Mala | LinVB | 3:12 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Bato ba bikolo binso bakotanga bino bato ba esengo, mpo bokokoma na mokili mwa bomengo. » | |
Mala | LinVB | 3:13 | Yawe alobi : Maloba ma bino makoyokisaka ngai nkanda soko botuni ngai : « Mabe ma yo nini tolobaki ? » | |
Mala | LinVB | 3:14 | Bolobaki : « Kosalela Nzambe ezali na ntina te. Tokozwa litomba nini soko totosi mibeko mya Yawe wa bokasi bonso mpe tosali lilaka ? » | |
Mala | LinVB | 3:15 | Sikawa tomoni ’te bato ba lofundo bakozwaka bolamu ; baye bakosalaka mabe bazali na bomengo ; ata batii ntembe na Nzambe, bakolonga ! | |
Mala | LinVB | 3:16 | O ntango ena baye bakobangaka Nzambe bakomi kolobana. Kasi Yawe ayoki bango. Buku ekomami o miso ma ye mpo ya kokundola makambo ma baye bakobangaka Yawe mpe bakokumisaka Nkombo ya ye. | |
Mala | LinVB | 3:17 | Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Bango bakozala bato ba ngai mpenza mokolo moye ngai nalengeli. Nakoyokela bango mawa lokola tata akoyokelaka mwana wa ye mawa, mwana oyo akosalelaka ye. | |
Mala | LinVB | 3:18 | Mokolo mona bokomono bokeseni kati ya moto semba na moto mabe, kati ya moto akosalelaka Nzambe na moto akosalelaka ye te. | |
Mala | LinVB | 3:19 | Boyeba ’te mokolo mona mozali koya lokola móto monene. Yawe wa bokasi bonso alobi : Bato ba lofundo na bato babe bakozika lokola matiti makauka, ntina yoko to etapi yoko ekotikala te. | |
Mala | LinVB | 3:20 | Kasi bino bato bokokumisaka Nkombo ya ngai, moi mwa bosembo mokongengele bino mpe mokoyela bino libiki. Bokotambola mpe bokodondwa lokola bana ba ngombe bakoleisaka malamu. | |
Mala | LinVB | 3:21 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Bino bokonyata bato babe. Mokolo nalengeli, bango bakozala lokola mputulu ya makala o nse ya makolo ma bino. | |
Mala | LinVB | 3:22 | Bokundola Mobeko mwa Moze, mosaleli wa ngai. Napesaki ye mibeko mpe mimeseno mpo ya Israel mobimba o ngomba Oreb. | |
Mala | LinVB | 3:23 | Tala, nakotindela bino profeta Elia liboso ’te mokolo moye monene mpe mwa nsomo moya. | |