Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
MARK
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16
Prev Up Next
Chapter 3
Mark LinVB 3:1  Yézu ayíngélí lisúsu o sinagóga ; moto mǒkó na lobóko lokaúká azalákí wâná.
Mark LinVB 3:2  Bazalákí konó­ngo Yézu, bámóno sókó akobíkisa yě o mokolo mwa sábato, bôngó báfúnda yě.
Mark LinVB 3:3  Yézu alobí na moto azalí na lobóko lokaúká : « télema o káti ya bato bánso. »
Mark LinVB 3:4  Na nsima atúní bango : « Bakokí, o mokolo mwa sábato, kosala malamu tǒ té ? Bábíkisa yě tǒ bátíka yě ákúfa ? » Kasi batíkálí nyê.
Mark LinVB 3:5  Yézu atálí bangó na nkándá, mpe ayókí mawa zambí balakísí motéma mabé. Alobí na moto wa mpási : « Tandá lobóko. » Atandí lobóko mpé lokómí malámu.
Mark LinVB 3:6  Ba-Farizéo babimí mpé bakeí kosangana likita elongó na bato ba Eróde mpô báluka nzelá ya koboma yě.
Mark LinVB 3:7  Yézu alongwí wâná na bayékoli ba yě mpé akeí o nzelá ya etíma. Bato ebelé balandí yě, baútí o Galiléa, o Yudéa,
Mark LinVB 3:8  o Yerúzalem, o Iduméa, o ngámbo ya Yordáne, mpé o mbóka penepene na Tíro na Sidóni ; bato ebelé mpenzá bayéí epái ya yě, zambí bayókákí mánso asálákí.
Mark LinVB 3:9  Alobí na bayékoli bábongisela yě bwáto bǒ kó, mpô ya nkaká ya bato, bányata yě té.
Mark LinVB 3:10  Awa abíkísí bato baíké, bato ba bokono bánso bawélí kokóma penepene na yě mpé kosímba yě.
Mark LinVB 3:11  Ntángo baye bazalákí na bilímo mbindo bamóní yě, bamíbwákí o bosó bwa yě mpé bagángí : « Ozalí Mwána wa Nzá-mbe ! »
Mark LinVB 3:12  Kasi apekísí bangó makási batánga nkómbó ya yě.
Mark LinVB 3:13  Na nsima Yézu abutí ngómbá, abéngí baye yě mǒkó alingí. Bayéí epái ya yě ;
Mark LinVB 3:14  aponí bato zómi na bábalé mpo bázala na yě, atíndí bangó bápésa matéya ;
Mark LinVB 3:15  apésí bangó likokí lya kobengana bazábolo.
Mark LinVB 3:16  Bato zómi na bábalé aponí bôngó, bangó baye : Simóni, apésí yě nkómbó Pétro ;
Mark LinVB 3:17  Yakóbo, mwána wa Zebedéo, na Yoáne, ndeko wa Yakóbo ; apésí bangó nkómbó ‘Boanérges’, lokóla ’te ‘bána ba nkáké’ ;
Mark LinVB 3:18  na nsima Andr­éa, Filípo, Barteleméo, Matéo, Tomá, Yakóbo mwána wa Alféo, Tadéo, Simóni moto mwa moléndé,
Mark LinVB 3:20  Azóngí o ndáko ; bato míngi basangání lisúsu, bôngó bazwí atâ ntángo ya kolía té.
Mark LinVB 3:21  Bandeko ba yě bayókí yangó, bakeí mpô ya kokamata yě na makási, zambí balobí : « Abélí ligbómá. »
Mark LinVB 3:22  Batéyi ba Mobéko baútákí o Yerúzalem balobí : « Bélzebul aka­ngí yě », mpé : « Akobenganaka bazábolo na ngúyá ya mokonzi wa bazábolo. »
Mark LinVB 3:23  Yézu abéngí bangó mpé alobí na bangó na miúlání : « Bóníbóní Sátana akokí kobengana Sátana ?
Mark LinVB 3:24  Sókó bato ba mokonzi mǒkó bakabwání, bokonzi bwa bango bokokí koúmela té.
Mark LinVB 3:25  Sókó bato ba libótá lyǒ kó bakabwání, bokási bwa libótá lyangó bokosíla.
Mark LinVB 3:26  Bôngó sókó Sátana akómí mo­ngúná wa yě mǒkó mpé bato ba yě bakabwání, akoúmela té mpé akosúka nokí.
Mark LinVB 3:27  Moto mǒkó té akokí kokóto o ndáko ya elombé mpé koyíba bilóko, sókó akangí yě libosó na nsinga té ; bobélé na nsima akokoka koyíba bilóko bya yě.
Mark LinVB 3:28  Ya sôló sôló, nalobí na bínó : bakolímbisa bato masúmu mánso, atâ batúkákí Nzámbe.
Mark LinVB 3:29  Kasi óyo atúkí Elímo Sántu, bakolímbisa yě mokolo mǒkó té ; akotíkala na lisúmu sékô. »
Mark LinVB 3:30  Yézu alobí bôngó mpô balobákí : « Elímo mbindo ekangí yě. »
Mark LinVB 3:31  Mamá na bandeko ba Yézu bayéí, batélémí o libándá, batíndí maloba mpô ya kobênga yě.
Mark LinVB 3:32  Bato míngi bazíngí Yézu, bayébísí yě : « Mamá na bandeko ba yǒ bazalí o libándá, balingí komóno yǒ. »
Mark LinVB 3:33  Aya­nólí bangó : « Mamá wa ngáí náni ? Bandeko ba ngáí banáni ? »
Mark LinVB 3:34  Alakísí na míso baye bafándí zóngazónga na yě, alobí : « Mamá na bandeko ba ngáí bangó baye.
Mark LinVB 3:35  Moto atâ náni akosála mambí mánso Nzámbe alingí, azalí ndeko mpé mamá wa ngáí. »