Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
MARK
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16
Prev Up Next
Chapter 5
Mark LinVB 5:1  Bakómí o ngámbo ya etíma o mokili mwa ba-Geráza.
Mark LinVB 5:2  Elu­bwí Yézu, moto mǒkó ayéí kokútana na yě, akangémí na elímo mbindo, aútí o bikunda.
Mark LinVB 5:3  Azalákí kofánda o káti ya malíta, mpé moto mǒkó té akokákí kokanga yě, atâ na monyolólo.
Mark LinVB 5:4  Mbala míngi baka­ngákí yě na minyolólo o mabóko mpé o makolo, kasi abúkákí mya­ngó. Moto mǒkó té azalákí na makási ma kolembisa yě.
Mark LinVB 5:5  Ntángo ínso, butú mói, azalákí kotelengana o bikunda mpé o ngómbá, azalákí kogánga mpé komítúta na mabángá.
Mark LinVB 5:6  Awa amóní Yézu mosíká, ayéí mbá­ngu epái ya yě, akúmbámélí yě,
Mark LinVB 5:7  agángí na mongóngó makási : « Yézu, Mwána wa Nzámbe wa Ntá-Likoló, bísó na yǒ likambo níni ? Nabóndélí yǒ na nkómbó ya Nzámbe, ónyókolo ngáí té ! »
Mark LinVB 5:8  Alobí bôngó zambí Yézu alobákí na yě : « Elímo mbindo, bimá o nzóto ya moto óyo ! »
Mark LinVB 5:9  Yézu atúní yě : « Nkómbó ya yǒ náni ? » Azóngísí : « Nkómbó ya ngáí limpingá, mpô tozalí míngi. »
Mark LinVB 5:10  Mpé abóndélí yě míngi ’te ábengana bangó o mokili môná té.
Mark LinVB 5:11  Etónga enéne ya ngúlu ezalákí kolía wâná o ngómbá.
Mark LinVB 5:12  Bilímo mbindo babóndélí Yézu : « Tíndá bísó epái ya ngúlu, tóyíngela o nzóto ya yangó. »
Mark LinVB 5:13  Yézu alingísí bangó. Bôngó bilímo mbindo bibimí o nzóto ya moto ôná, mpé biyíngélí o ngúlu. Etónga mobimba, ngúlu sókí nkóto íbalé, ebílíngání o ngómbá, ekwéí o etíma mpé ekúfí o mái.
Mark LinVB 5:14  Bakéngeli ba ngúlu bakímí, bayébísí nsango na bato o engumbá mpé o bilanga ; bôngó bato bayéí kotála likambo lîná.
Mark LinVB 5:15  Bakómí epái ya Yézu mpé bamóní moto óyo azalákí na zábolo, afándí nyê mpé alátí bilambá. Moto óyo akangémákí mpenzá na limpingá lya bilímo bibé, akómí na mayéle sikáwa. Nsómo ekangí bangó bánso.
Mark LinVB 5:16  Baye bamónókí yangó bayébísí bangó maye makwêlákí moto óyo azalákí na bilímo mbindo mpé maye masálémákí na ngúlu.
Mark LinVB 5:17  Sikáwa bato babandí kobóndela Yézu ’te álongwa o mokili mwa bangó.
Mark LinVB 5:18  Kasi ntángo Yézu akwélí o bwáto, moto aka­ngémákí na bilímo mbindo abó­ndélí Yézu ’te ákoka kokende na yě.
Mark LinVB 5:19  Kasi Yézu alingísí yě té, alobí na yě : « Zóngá o ndáko, epái ya bandeko ba yǒ, yébísá bangó maye mánso Mokonzi asálí yǒ, mpé bóníbóní ayókélí yǒ mawa. »
Mark LinVB 5:20  Bôngó moto ôná akeí, mpé o ekólo ya Mbóka-Zómi abandí kosakola maye mánso Yézu asálí yě ; bato bánso bakámwí mpenzá.
Mark LinVB 5:21  Yézu akátísí lisúsu etíma na bwáto. Ntángo akómí o ngámbo, bato ebelé bayéí kosangana epái ya yě ; áwa azalákí o libóngo,
Mark LinVB 5:22  Yaíro, mǒkó wa bakonzi ba sinagóga, ayéí. Ntángo amóní Yézu, afukámélí yě,
Mark LinVB 5:23  abóndélí yě míngi : « Mwá­na mwásí wa ngáí alingí awéí, yáká ótíela yě mabóko mpô ’te ábíka, átíkala na bomoi. »
Mark LinVB 5:24  Yézu akeí na yě, mpé bato míngi balandí yě, bazalákí kopúsapúsa yě bipái na bipái.
Mark LinVB 5:25  Mwásí mǒkó azalákí o káti ya bangó ; mbúla zómi na íbalé elekí aba­ndákí kobéle bokono bwa botangi makilá.
Mark LinVB 5:26  Ayókákí mpási mpenzá na bofúti mínganga míngi, asílísí mbóngo ya yě ínso, sé mpámba, abíkí té ; kútu bokono bwa yě bokómí kongala makási.
Mark LinVB 5:27  Ayókákí nsango ya Yézu, ayéí nsima ya yě o káti ya bato, mpé asímbí moláto mwa yě,
Mark LinVB 5:28  mpô amílobélí : « Sókó nasímbí bobélé elambá ya yě, nakobíka. »
Mark LinVB 5:29  Sikawâna, na mbala yǒ kó esíká makilá mazalákí kobima, ekaúkí ; ayókí o nzóto ’te mpási ya yě esílí.
Mark LinVB 5:30  Yézu ayébí ’te ngúyá ebimí o nzóto ya yě, bôngó amíbóngólí epái ya bato bazalákí kolanda yě, atúní : « Náni asímbákí elambá ya ngáí ? »
Mark LinVB 5:31  Bayékoli balobí na yě : « Omóní ’te bato ebelé bazalákí kozínga yǒ epái na epái, mpé otúní náni asímbákí yǒ ! »
Mark LinVB 5:32  Kasi Yézu atá­mbwísí míso epái na epái, ámóno sókó náni asálákí bôngó.
Mark LinVB 5:33  Sikáwa mwásí ôná akómí kobánga mpé kolénge, mpô ayébí malámu likambo likwêlí yě. Afukámí o bosó bwa Yézu mpé ayébísí yě mánso.
Mark LinVB 5:34  Yézu alobí na yě : « Mwána mwasi boyambi bwa yǒ bobikisi yǒ. Ke­ndé na bobóto mpé óbíka o bokono bwa yǒ. »
Mark LinVB 5:35  Asílísí naíno koloba té, bato baútí o ndáko ya mokonzi wa sinagóga bayéí koyébisa yě : « Mwána mwásí wa yǒ asílí awéí. Mpô níni ótungisa Motéyi lisúsu ? »
Mark LinVB 5:36  Kasi Yézu ayókí yangó, alobí na mokonzi wa sinagóga : « Obánga té, zalá sé na boyambi. »
Mark LinVB 5:37  Alingísí moto mǒkó té ákende elongó na yě, kaká sé Pétro na Yakóbo na Yoáne, ndeko wa Yakóbo.
Mark LinVB 5:38  Bakómí o ndáko ya mokonzi wa sinagóga, Yézu amóní bato bazalákí kotía makeléle, kolela mpé kogánga.
Mark LinVB 5:39  Akótí o ndáko mpé alobí na bangó : « Mpô níni bozalí kotía makeléle mpé kolela boye ? Mwána awéí té, alálí mpongí. »
Mark LinVB 5:40  Basekí yě ; kasi abimísí bato bánso o libándá, akamátí tatá na mamá wa mwána, ná mpé baye bayéí na yě, ayíngélí na bangó o esíká mwána azalákí.
Mark LinVB 5:41  Asímbí mwána na lobóko mpé alobí na yě : « Tálita kúmi », lokóla ’te : « Mwána, nalobí na yǒ : télémé ! »
Mark LinVB 5:42  Mwána atélémí, abandí kotámbola. Akokísí mbúla zómi na íbalé. Nsómo ekangí bangó bánso.
Mark LinVB 5:43  Yézu apekísí bangó makási ’te báyébisa yangó na moto mǒkó té. Atíndí ’te bápésa mwána bilóko bya kolía.