Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
PROVERBS
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 22
Prov LinVB 22:1  Nkombo ekei lokumu eleki nkita enene na bolamu, bondeko bwa solo boleki wolo na palata.
Prov LinVB 22:2  Moto wa mbongo na moto mobola bakokutanaka, Yawe azali Mozalisi wa bango babale.
Prov LinVB 22:3  Moto wa bokebi akoluka kobombama o ntango ya likama, kasi bato bazangi mayele bakoleka boleki mpe bakoyoka mpasi.
Prov LinVB 22:4  Moto wa motema bosawa akobangaka Yawe, akozwa nkita, lokumu mpe bomoi.
Prov LinVB 22:5  Nzela ya moto mabe etondi nzube mpe na mitambo, moto alingi kobatela bomoi bwa ye, akolongwa o nzela ena.
Prov LinVB 22:6  Lakisa elenge mobali mimeseno milamu ut’o bomwana, mokolo akokoma mobange, akotika myango te.
Prov LinVB 22:7  Moto wa nkita akoyangelaka babola, moto wa nyongo azali moombo wa oyo adefisi ye.
Prov LinVB 22:8  Moto azangi bosembo akosuka na mawa, bokasi bwa nkanda ya ye bokosuka.
Prov LinVB 22:9  Bakokumisa moto wa motema malamu, zambi akokabelaka babola mampa ma ye.
Prov LinVB 22:10  Bengana moto akosekeke baninga mpe boswani bokosila, bowelani na mafinga makosila lokola.
Prov LinVB 22:11  Oyo alingi kozala motema peto, mpe akolobaka maloba ma boboto, azali molingami wa mokonzi.
Prov LinVB 22:12  Miso ma Yawe makobatelaka bwanya, Yawe akobulinginya maloba ma mokosi.
Prov LinVB 22:13  Moto goigoi akoloba : « Ntambwe eyingeli o mboka ! Soko nabimi, ekoboma ngai ! »
Prov LinVB 22:14  Monoko mwa mwasi ndumba, lokola libulu bozindo ; oyo Yawe ayokeli ye nkanda, akokweya o kati.
Prov LinVB 22:15  Soko bozoba bopikami makasi o motema mwa elenge mobali, bakobikisa ye na bwango bobele na fimbo ya mateya.
Prov LinVB 22:16  Soko banyokoli mobola, bakokomisa ye moto wa nkita, soko bakabeli moto wa nkita, bakokomisa ye mobola.
Prov LinVB 22:17  Tia matoi mpe yoka maloba ma bato ba bwanya, ndima maloba ma ngai na motema moko :
Prov LinVB 22:18  okoyoka esengo soko obombi mango o motema, okoka kotanga mango ntango inso.
Prov LinVB 22:19  Yo mpe, nalingi koteya yo lelo, mpo ’te otia motema se na Yawe.
Prov LinVB 22:20  Nakomeli yo biyele ntuku isato, bizali malako mpe maloba ma boyebi,
Prov LinVB 22:21  mpo ’te nayebisa yo maloba ma bosolo, bongo okoka kopesa biyano bya solo na oyo atindi yo.
Prov LinVB 22:22  Oyibela mobola te, mpo azali mobola, onyata moto moke o esambi te,
Prov LinVB 22:23  mpo Yawe akolobela bato bake, mpe akobotolo bomoi bwa baye bayibeli bango biloko.
Prov LinVB 22:24  Okata bondeko na moto wa nkanda te, otambola na moto wa nkele te,
Prov LinVB 22:25  mpo okoma na ezalela ebe ya ye te, mpe otiela bomoi bwa yo moko motambo te.
Prov LinVB 22:26  Olanda bato te, baye bakokataka mondenge, mpe bakomitiaka ndanga mpo ya kosilisa nyongo.
Prov LinVB 22:27  Soko ozangi eloko ya kozongisa, bakokamata mbeto ya yo esika olali.
Prov LinVB 22:28  Opusa libanga te liye likolakisaka ndelo ut’o kala, liye bankoko ba yo batiaki wana.
Prov LinVB 22:29  Moto akobongisaka mosala mwa ye bo ebongi akoki kosalela bakonzi, kasi akosalela bato ba molili te.