Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
SIRACH
Prev Up Next
Chapter 14
Sira LinVB 14:1  Esengo na moto oyo asalaki mabe na monoko te, oyo motema moswi te, mpo asalaki mabe te.
Sira LinVB 14:2  Esengo na moto soko motema mokitisi ye te, oyo azwi maye atiaki motema.
Sira LinVB 14:3  Nkita ebongi na moimi te ; ntina ezali te ’te moto wa lokoso azwa nkita mingi.
Sira LinVB 14:4  Soko moto akomipimaka biloko mpo azwa mbongo mingi, basusu bakolia mbongo ya ye mpe bakosepela na yango.
Sira LinVB 14:5  Moto akomiyokelaka mawa te, akoyokela nani mawa ? Akosepela ata na biloko bya ye moko te.
Sira LinVB 14:6  Moto akominyokoloko azali mabe mpenza, yango nde etumbu a­zwi mpo ya mabe asalaki.
Sira LinVB 14:7  Soko mokolo moko asali malamu, loba ’te abungi, nsuka nsuka akolakisa mabe ma motema mwa ye.
Sira LinVB 14:8  Moto wa bilulalula azali moto mabe, akopanganaka na bato te, akokinolaka basusu.
Sira LinVB 14:9  Moto wa lokoso akotika kolula biloko te, mposa ya biloko ekokondisa ye.
Sira LinVB 14:10  Moimi akomipimaka mampa nta­ngo inso, o meza ya ye moko okokuta eloko te.
Sira LinVB 14:11  Mwana wa ngai, omisalela na biloko bya yo, mpe bonzela Mokonzi mabonza mabongi.
Sira LinVB 14:12  Kanisaka ’te liwa lizali mosika te, mpe elaka mboka ya bawa etieli yo eyebani te.
Sira LinVB 14:13  Awa owei naino te, osalisaka baninga, kabela bango biloko lokola okoki.
Sira LinVB 14:14  Omipima bolamu bwa lelo te, bomengo ozwi na bosembo, osepela na bwango.
Sira LinVB 14:15  Okotikela bato basusu nkita ya yo te ? Bakobete zeke te mpo ya kokabola mbuma ya mosala mwa yo ?
Sira LinVB 14:16  Pesa mpe kamata, sepelisa motema mwa yo, zambi o mboka ya bawa bakosepelaka te.
Sira LinVB 14:17  Moto nyonso akosilaka lokola ela­mba : osengeli kowa, ezali mobeko mwa seko.
Sira LinVB 14:18  Lokola nzete na nkasa ebele : nkasa isusu ikokweyaka, isusu ikobimaka, se bongo na bato tozali nsuni na makila, basusu bakowaka, basusu bakobotamaka.
Sira LinVB 14:19  Biloko binso moto akosalaka bikobeba, mpe oyo asali byango akoli­mwa lokola.
Sira LinVB 14:20  Esengo na moto akolukaka kozwa bwanya, mpe alingi kokoma moto wa mayele.
Sira LinVB 14:21  Moto akomanyolaka nzela ya bwanya mpe akomekaka koyeba mibombamo mya bwango,
Sira LinVB 14:22  akolanda bwanya lokola moto wa bokila akolandaka, mpe akoke­ngeke matambi ma nyama.
Sira LinVB 14:23  Akonongo bwanya ut’o maninisa ma ndako, mpe akotia matoi o ezibeli ya ndako ya bwanya.
Sira LinVB 14:24  Akoteleme penepene na ndako ya bwango, mpe akopika piké ya ema o lopango la bwango,
Sira LinVB 14:25  mpo azala na ema ya ye penepene na bwanya, epai ya ndako ya bomengo.
Sira LinVB 14:26  Akopesa bana ba ye bwanya, mpo ’te bazwa mobateli, mpe akoke­nde kopema o nse ya bitapi bya nzete ya bwanya
Sira LinVB 14:27  mpo azwa esika ya mpio o ntango ya molunge, mpe afanda penepene na bwanya, lokumu la ye.