ACTS
Chapter 14
Acts | LinVB | 14:1 | Bayíngélí mpé o sinagóga ya ba-Yúda o Ikónio ; mpô ya maloba ma bangó ba-Yúda mpé bato ba bikólo bisúsu baíké bakómí koyamba. | |
Acts | LinVB | 14:2 | Kasi ba-Yúda baye babóyí koyamba bapésí bapagáno mayéle mabé ’te bándima bandeko té. | |
Acts | LinVB | 14:3 | Bôngó Pólo na Bárnaba baúmélí naíno o Ikónio ; ngúyá ya Mokonzi eléndísí bangó. Mokonzi alakísí ’te matéya ma ngrásya ya yě mazalí ma sôló ; na mabóko ma bangó alakísí bilembo mpé asálí makamwísi. | |
Acts | LinVB | 14:4 | Bato ba engumbá bakómí koka-bwana : basúsu bandimí ba-Yúda, basúsu bandimí bapóstolo. | |
Acts | LinVB | 14:5 | Bapagáno na ba-Yúda, libosó mpenzá bakóló ba bangó, bamíléngélí mpô ya konyókolo bapóstolo mpé koboma bangó na mabángá. | |
Acts | LinVB | 14:6 | Eyókí bapóstolo bôngó, bakeí kobómbama o bingumbá bya Likaónia, Lístra, Dérbe mpé o mbóka ya penepene ; | |
Acts | LinVB | 14:9 | Ntángo azalákí koyóka maloba ma Pólo, Pólo atálí yě malámu mpé amóní ’te azalákí na boyambi mpô ’te ábíka ; | |
Acts | LinVB | 14:10 | alobí na mongóngó makási : « Télémé o makolo ma yǒ ! » Yě apimbwí mpé abandí kotámbola. | |
Acts | LinVB | 14:11 | Emóní bato likambo Pólo asálí, bagángí o lokóta la ba-Likaónia : « Banzámbe bakómí na nzóto lokóla bato, bakití epái ya bísó ! » | |
Acts | LinVB | 14:13 | Ndáko esíká bakosámbelaka nzámbe Zeus ezalákí o libándá lya lopángo la engumbá. Nganga wa Zeus ayéí na ngómbé babáli, iye bakémbísí na matíti mpé na fuléle, penepene na ezibeli ya engumbá ; ayókání na bato ’te bábonza yangó. | |
Acts | LinVB | 14:14 | Awa bapóstolo Bárnaba na Pólo bayókí yangó, bapasólí bilambá, bakimí mbángu epái ya bato mpé bagángí : | |
Acts | LinVB | 14:15 | « Báníngá ! Bozalí kosála níni ? Bísó mpé tozalí sé bato lokóla bínó ; tozalí koyébisa bínó ’te bosengélí kotíka banzámbe ba lokutá mpé kokúmisa Nzámbe wa bomoi, óyo akelí likoló na nsé, mbú ná mpé bínso bizalí wâná. | |
Acts | LinVB | 14:17 | nzókandé amíyébísákí na bato na bokabeli bangó makabo : út’o likoló akonókiselaka bínó mbúla, akopésaka mbuma o eleko ya yangó ná mpé biléi bikosepelisaka mitéma mya bínó. » | |
Acts | LinVB | 14:18 | Atâ balobí bôngó, bobélé na mpási mpenzá bakokí kopekisa bato kobonzela bangó libonza. | |
Acts | LinVB | 14:19 | Sé o ntángo êná ba-Yúda baútákí o Antiókia mpé o Ikónio babúlíngínyí mitéma mya bato. Babwákélí Pólo mabángá ; babéndí yě o libándá lya engumbá, mpô bakanísí ’te awéí. | |
Acts | LinVB | 14:20 | Kasi áwa bayékoli bazíngí yě, Pólo atélémí mpé ayíngéli o engumbá. Mokolo mwa nsima Pólo na Bárnaba bakeí o Dérbe. | |
Acts | LinVB | 14:21 | Basangélí Nsango Elámu o engumbá êná, mpé bato baíké bakómí koyamba. Na nsima bazóngí o Lístra, o Ikónio mpé o Antiókia. | |
Acts | LinVB | 14:22 | Kúná baléndísí bayékoli mitéma mpé batéyí bangó ’te bázala na moléndé o boyambi, balobí : « Tokoyíngela o Bokonzi bwa Nzámbe bobélé na mikakatano. » | |
Acts | LinVB | 14:23 | O Eklézya yǒ kó yǒ kó baponí bakóló, basámbélí mpé balálí nzala, mpé batíkí bangó o mabóko ma Mokonzi óyo bangó bayambí. | |
Acts | LinVB | 14:26 | Kúná bakwélí o masúwa mpé bazóngí o Antiókia. Kúná bayékoli batíkákí bangó o mabóko ma Nzámbe mpô ’te na lisálisi lya ngrásya ya Yě básála mosálá moye basílísí sikáwa. | |
Acts | LinVB | 14:27 | Ekómí bangó kúná, basangísí bato ba Eklézya bánso, bayébísí mánso Nzámbe asálákí elongó na bangó, mpé bóníbóní Nzámbe afungólélí bato ba bikólo bisúsu nzelá ya boyambi. | |